Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 12:22 - Mokanda na Bomoi

22 Bokokamata etape ya nzete ya izope, bokozindisa yango na makila oyo ekozala kati na sani monene, bokopakola yango na libaya ya likolo mpe na mabaya mibale ya mipanzi oyo esimbaka ekuke. Moko te kati na bino abima libanda ya ekuke ya ndako na ye kino na tongo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 12:22
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo, nabotamaki kati na lisumu ; wuta na libumu ya mama na ngai, nazali mosumuki.


Bakozwa makila na yango mpe bakopakola yango na libaya ya likolo mpe na mabaya mibale ya mipanzi oyo esimbaka ekuke ya bandako epai wapi bakolia nyama yango.


Bato na ngai, bokende, bokota na bashambre na bino mpe bokanga bikuke sima na bino ; bomibomba nanu mwa tango moke kino tango kanda ekoleka.


Moto oyo azali mbindo te akokamata etape ya izope mpe akotia yango kati na mayi, bongo akosalela yango mpo na kobwaka mayi na ndako ya kapo epai wapi moto akufi, na bisalelo mpe na banzoto ya bato nyonso oyo bazalaki kati na ndako yango ; akosala mpe bongo mpo na moto oyo asimbaki mikuwa, ebembe ya moto oyo moninga na ye moto abomaki to akufaki na liwa nyonso kaka to mpe mpo na moto oyo asimbaki kunda.


Sima na yango, bayembaki banzembo ; bongo babimaki mpo na kokende na ngomba ya banzete ya olive.


Mpo na kondima, asepelaki feti ya Pasika mpe apesaki mitindo ete bapakola makila na bikuke mpo ete anjelu mobomi aboma te bana mibali ya liboso ya bana ya Isalaele.


pene ya Yesu, Moyokanisi ya Boyokani ya sika ; mpe pene ya makila na Ye, oyo esopanaki mpe egangaka koleka makila ya Abele.


Boyokani ya liboso ezalaki na mibeko ya losambo, mpe na Esika ya bule oyo ezalaki ya mokili.


nzokande makila ya Klisto oyo, na nzela ya Molimo ya seko, amikabaki Ye moko epai ya Nzambe lokola mbeka oyo ezangi mbeba, epetolaka mitema na biso na misala oyo ememaka na kufa mpo ete tokoka kosalela Nzambe na bomoi.


Pamba te, tango Moyize asilisaki kotangela bato mitindo nyonso ndenge ekomami kati na Mibeko, akamataki makila ya bana ngombe, ya bantaba elongo na mayi, asopelaki buku mpe bato nyonso na nzela ya etape ya nzete ya izope, oyo balinga elamba ya lino ya motane.


Soki moto moko abimi libanda ya ndako na yo mpe akei na balabala, makila na ye ekotangama na moto na ye moko ; ekozala ngambo na biso te. Kasi soki babomi moto moko kati na bato oyo bakozala kati na ndako na yo, wana makila na ye ekotangama na mito na biso.


Kolanda mabongisi na Ye, Nzambe Tata apona bino wuta kala, abulisa bino na nzela ya Molimo na Ye mpo ete botosa Yesu-Klisto mpe bokoma peto na nzela ya makila na Ye, oyo asopaki. Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino na bofuluki !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ