Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 12:2 - Mokanda na Bomoi

2 « Sanza oyo ekozala mpo na bino sanza ya liboso ya mobu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 12:2
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na sanza ya liboso, sanza ya Nisani, na mobu ya zomi na mibale ya Mokonzi Kizerisesi, babetaki zeke oyo babengaka « Puri » liboso ya Amani mpo na kopona mokolo mpe sanza ya koboma Bayuda. Bongo zeke ekweyaki na sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari.


Yawe alobaki na Moyize mpe Aron kati na Ejipito :


Na sanza ya liboso, bokolia mapa ezanga levire kobanda na pokwa ya mokolo ya zomi na minei kino na pokwa ya mokolo ya tuku mibale na moko.


Boloba boye na lisanga mobimba ya Isalaele : Na mokolo ya zomi na sanza oyo, libota moko na moko to ndako moko na moko esengeli kozala na mwana meme to na mwana ntaba.


Moyize alobaki na bato : « Bokanisa mokolo oyo bobimaki na Ejipito, mokolo oyo bobimaki na bowumbu, pamba te Yawe abimisaki bino na loboko na Ye ya nguya. Bokolia eloko moko te oyo ezali na levire.


Bozali kobima nde lelo oyo, na sanza ya abibi.


Bokosala feti ya Mapa ezanga levire. Na mikolo sambo kolanda ndenge napesaki bino mitindo, bokolia mapa ezanga levire na tango oyo ekatama, na sanza ya Abibi, mpo ete ezali na sanza yango nde bobimaki na Ejipito.


Bokosala feti ya Mapa ezanga levire. Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire ndenge natindaki yo. Bokosala yango na tango ekatama, na sanza ya Abibi, pamba te ezali na sanza yango nde bobimaki na Ejipito.


Boye, Mongombo etelemisamaki na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso na mobu ya mibale.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, okokamata mwana ngombe ya mobali oyo ezanga mbeba mpe okopetola Esika ya bule.


Na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso, bokosala feti ya Pasika oyo ekosala mikolo sambo. Na mikolo wana, bokolia mapa ezanga levire.


Pasika ya Yawe ekobanda na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso.


Mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso ekozala Pasika mpo na lokumu ya Yawe.


Batela sanza ya Abibi mpe sepela feti ya Pasika mpo na Yawe, Nzambe na yo, pamba te ezalaki na butu moko ya sanza yango nde Yawe abimisaki yo na Ejipito.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ