11 Tala ndenge nini bokolia yango : bokolata mokaba na loketo, basandale na makolo, mpe bokosimba lingenda na loboko. Bokolia yango na lombangu. Ezali feti ya Pasika mpo na Yawe.
Na bandako epai wapi bokozala, makila ekozala elembo mpo na bino ; bongo tango Ngai nakomona makila yango, nakoleka bino. Boye etumbu moko te ya kufa ekokweya kati na bino tango nakopesa etumbu na mokili ya Ejipito.
Bokoloba na bango : ‹ Ezali mbeka ya feti ya Pasika mpo na Yawe oyo alekaki bandako ya bana ya Isalaele kati na Ejipito mpe abikisaki bandako na biso tango abomaki bato ya Ejipito. › » Na bongo, bana ya Isalaele bafukamaki mpe bagumbamelaki Yawe.
Kasi na mbala oyo, bokobima na kowela te mpe bokokende te lokola bato bazali kokima, pamba te Yawe akotambola liboso na bino mpe Nzambe ya Isalaele akozala Mokengeli na bino na sima.
Kasi tata alobaki na basali na ye : « Bomema na lombangu nzambala oyo eleki kitoko mpe bolatisa ye yango ; bolatisa ye lopete, na mosapi, mpe basandale, na makolo na ye.
atelemaki na sima ya Yesu, na makolo na Ye ; azalaki kolela mpe, na mpinzoli na ye, akomaki kopolisa makolo ya Yesu. Bongo apangusaki makolo yango na nzela ya suki na ye, apesaki yango beze mpe asopelaki yango malasi.
Bolongola kati na bino kisi nyonso ya kala ya mapa mpo ete bokoma peto lokola potopoto ya sika ya mapa, ndenge bozali penza. Pamba te Klisto, Mpate na biso ya Pasika, asilaki kopesama lokola mbeka.
Batela sanza ya Abibi mpe sepela feti ya Pasika mpo na Yawe, Nzambe na yo, pamba te ezalaki na butu moko ya sanza yango nde Yawe abimisaki yo na Ejipito.
Na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza wana, bana ya Isalaele basalaki feti ya Pasika, wana bazalaki nanu na molako ya Giligali, na etando ya Jeriko.
Yango wana, boselingwa mpo na kosalela Nzambe lokola basali oyo balati bilamba ya mosala mpo na kosala ; bomibatela malamu mpe botia elikya na bino mobimba kati na ngolu oyo bokozwa tango Yesu-Klisto akomonana.