Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 11:5 - Mokanda na Bomoi

5 Mwana mobali nyonso ya liboso kati na Ejipito akokufa, kobanda na mwana mobali ya liboso ya Faraon oyo avandi na kiti ya bokonzi kino na mwana mobali ya liboso ya mwasi mowumbu oyo azali konika ble mpe bana mibali nyonso ya liboso ya bibwele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 11:5
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abomaki bana liboso nyonso kati na mokili na bango, bambuma ya liboso ya makasi na bango.


Ye nde abomaki bana ya liboso ya Ejipito, kobanda na bato kino na banyama ;


Abomaki bana mibali ya liboso ya Ejipito ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !


Abomaki bana mibali nyonso ya liboso kati na Ejipito, bambuma ya liboso ya makasi na bango na se ya bandako ya kapo ya Cham.


Kaka na butu yango, nakoleka na Ejipito ; nakoboma bana nyonso ya liboso kati na Ejipito kobanda na bato kino na banyama ; mpe nakosambisa banzambe nyonso ya Ejipito na nzela ya bitumbu. Nazali Yawe.


Na kati-kati ya butu, Yawe abomaki bana mibali nyonso ya liboso kati na Ejipito kobanda na mwana mobali ya liboso ya Faraon oyo azalaki kokonza na kiti ya bokonzi kino na mwana mobali ya liboso ya mokangami oyo azalaki kati na boloko, mpe bana mibali ya liboso ya bibwele nyonso.


Tango Faraon aboyaki kotika biso kokende, Yawe abomaki kati na Ejipito mwana nyonso ya liboso, ezala ya moto to ya nyama. Yango wana nazali kobonzela Yawe bana nyonso ya liboso kati na banyama mpe nazali kosikola bana nyonso ya liboso kati na bana na ngai. ›


Mpe nalobi na yo : Tika mwana na Ngai ya mobali kokende mpo ete asalela Ngai. Soki kaka oboyi kotika ye, nakoboma mwana na yo ya liboso ya mobali. › »


Kamata mabanga oyo banikelaka ble mpe sala farine, longola kitambala na yo, tombola nzambala na yo, mpe mipende na yo emonana, bongo katisa bibale !


Bilenge mibali bazali komema libanga oyo banikelaka ble ; bongo bana mike bazali kotepatepa na se ya kilo ya bakoni.


basi mibale bakozala konika bambuma na enikelo ; moko akokamatama, mpe mosusu akotikala.


Mpo na kondima, asepelaki feti ya Pasika mpe apesaki mitindo ete bapakola makila na bikuke mpo ete anjelu mobomi aboma te bana mibali ya liboso ya bana ya Isalaele.


Bato ya Filisitia bakangaki ye, batobolaki ye miso, bamemaki ye na Gaza mpe bakangaki ye minyololo ya bibende ya bronze. Akomaki konika bambuma ya ble na enikelo ya libanga kati na boloko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ