Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 10:9 - Mokanda na Bomoi

9 Moyize azongisaki : — Tokokende elongo na bilenge na biso, bampaka na biso, bana na biso ya mibali mpe ya basi, bameme na biso, bantaba na biso mpe bangombe na biso ; pamba te tokosala feti mpo na lokumu ya Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 10:9
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

elongo na bato nyonso ya ndako ya Jozefi, bandeko na ye ya mibali mpe bato nyonso oyo bazalaki na ndako ya tata na ye. Bana na bango kaka nde batikalaki na Gosheni na bameme, bantaba mpe bangombe na bango.


Faraon alobaki na bango : — Soki nakotika bino kokende elongo na bana na bino, wana tika ete Yawe azala elongo na bino ! Nzokande emonani solo ete bozali na makanisi mabe.


Bitonga na biso ya bibwele mpe ekokende nzela moko na biso ; ata linzaka moko te ya ebwele ekotikala. Pamba te ezali kati na bibwele yango nde tokopona oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso ; mpe wana tokomi nanu kuna te, toyebi te ebwele nini tokobonza mpo na kogumbamela Yawe.


Bokamata bibwele na bino ndenge bolobaki : bangombe, bameme mpe bantaba ; mpe bokende. Boye, bopambola mpe ngai. »


Bato ya Isalaele balongwaki na Ramisesi mpe bakendeki na Sukoti ; bazalaki mibali nkoto nkama motoba oyo bazalaki kotambola na makolo longola basi mpe bana.


Ezalaki lisusu na ebele ya bato oyo bakendeki na bango elongo ; bamemaki lisusu bibwele : bameme, bantaba mpe bangombe.


Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire ; na mokolo ya sambo, bokosala feti mpo na Yawe.


Bakambi ya Isalaele bakoyokela yo, bongo yo elongo na bakambi, bokokende epai ya mokonzi ya Ejipito mpe bokoloba na ye : « Yawe Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, pesa biso nzela ya kotambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokende kotumbela Yawe, Nzambe na biso, mbeka. »


Sima na yango, Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki : — Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tika bato na Ngai kokende kosala feti na esobe mpo na lokumu na Ngai. »


Balobaki : — Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, tika biso totambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, mbeka ; noki te akoboma biso na bokono to na mopanga.


Pesaka Yawe lokumu na nzela ya biloko na yo mpe ya bambuma ya liboso ya bozwi na yo nyonso.


Kanisa Mokeli na yo, na mikolo nyonso ya bolenge na yo, liboso ete mikolo ya pasi ekomela yo, mpe mibu epusana, mibu oyo okoloba na tina na yango : « Nazali kosepela na ngai na yango te ; »


Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, bokozala na mayangani ya bule ; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo mpe bokosala feti monene mpo na Yawe mikolo sambo.


Bino batata, bopesaka bana na bino kanda te, kasi bobokolaka bango kati na mateya mpe makebisi ya Nkolo.


Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela ; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ