Kaka na butu wana, Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango : « Botelema, bobima kati na bato na ngai, bino mpe bana ya Isalaele. Bokende kogumbamela Yawe ndenge bosengaki.
Moyize azongisaki : — Ndenge nazali kobima boye na ndako na yo, nakobondela Yawe ; bongo lobi, banzinzi oyo eswaka ekolongwa epai ya Faraon, epai ya bakalaka na ye mpe epai ya bato na ye. Kasi tika ete Faraon akoba te kotiola Yawe na koboya kotika bato kokende kobonzela Yawe mbeka.