Bitonga na biso ya bibwele mpe ekokende nzela moko na biso ; ata linzaka moko te ya ebwele ekotikala. Pamba te ezali kati na bibwele yango nde tokopona oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso ; mpe wana tokomi nanu kuna te, toyebi te ebwele nini tokobonza mpo na kogumbamela Yawe.
Okotongela Ngai etumbelo ya mabele epai wapi okobonza bambeka na yo ya kotumba, bambeka na yo ya boyokani, meme na yo, ntaba na yo, ngombe na yo. Esika nyonso oyo nakomimonisa mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nakoya epai na yo mpe nakopambola yo.
Aron atombolaki maboko na ye epai ya bato mpe apambolaki bango ; bongo akitaki sima na kobonza mbeka ya masumu, mbeka ya kotumba mpe mbeka ya boyokani.