Ezali mokolo ya butu mpe ya molili makasi, mokolo ya londende mpe ya mapata ya mwindo. Ndenge pole ya tongo epanzanaka na bangomba, ndenge wana mpe mampinga moko ya basoda ebele mpe ya mpiko ezali koya. Makambo ya boye etikala nanu kosalema te na kala mpe ekotikala kosalema te na mikolo oyo ekoya.
Pamba te Ye oyo asalaki bangomba, oyo akelaki mipepe, oyo alakisaka makanisi na Ye epai na moto, oyo abongolaka pole molili, oyo atambolaka likolo ya bangomba ya mokili, Kombo na Ye ezali : Yawe, Nzambe Mokonzi ya mampinga.
Yango wana, bino bopusanaki mpe botelemaki na ebandeli ya ngomba tango ezalaki kopela moto oyo ekomaki kino na likolo elongo na mapata ya mwindo mpe molili makasi.
Oyo nde mibeko oyo Yawe alobaki na mongongo makasi kati na moto epai ya lisanga mobimba oyo ezalaki likolo ya ngomba kati na mapata mpe molili makasi ; mpe abakisaki ata likambo moko te. Bongo akomaki yango na bitando mibale ya mabanga mpe apesaki ngai yango.
Anjelu ya mitano asopaki kopo na ye na likolo ya kiti ya bokonzi ya nyama, mpe molili ezipaki bokonzi ya nyama yango. Bato bakomaki komiswa lolemo mpo na pasi,