Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 10:16 - Mokanda na Bomoi

16 Faraon abengisaki Moyize mpe Aron na lombangu, alobaki : — Nasali lisumu epai na Yawe, Nzambe na bino, mpe epai na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 10:16
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe alobaki na ye : « Tika ete nkolo na ngai atangela ngai ngambo te, akanisa te mabe oyo mosali na ye asalaki mokolo oyo mokonzi, nkolo na ngai, alongwaki na Yelusalemi. Tika ete mokonzi alongola likambo yango na makanisi na ye.


Sima na Davidi kotanga bato, asosolaki ete amemi ngambo. Bongo Davidi alobaki na Yawe : — Nasali lisumu monene na kotanga bato. Sik’oyo, nabondeli Yo, oh Yawe, limbisa mabe ya mosali na Yo ; pamba te nasali makambo lokola moto ya liboma.


Wana Davidi atombolaki miso mpe amonaki anjelu na Yawe koboma bato, alobaki na Yawe : « Ngai nde nasalaki masumu, ngai nde nasalaki mbeba ; bango, bato ya ekolo na ngai, basali mabe moko te ; boye, ebongi nde opesa ngai mpe libota na ngai etumbu ! »


Moyize azongisaki : — Ndenge nazali kobima boye na ndako na yo, nakobondela Yawe ; bongo lobi, banzinzi oyo eswaka ekolongwa epai ya Faraon, epai ya bakalaka na ye mpe epai ya bato na ye. Kasi tika ete Faraon akoba te kotiola Yawe na koboya kotika bato kokende kobonzela Yawe mbeka.


Sima, Moyize mpe Aron batikaki Faraon. Bongo Moyize agangaki epai na Yawe na tina na magorodo oyo atindelaki Faraon.


Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango : — Ya mbala oyo, nasali lisumu. Yawe azali sembo ; ngai mpe bato na ngai tosali mabe.


Moto oyo abombaka masumu na ye abongaka te, kasi ye oyo atubelaka mpe atikaka yango azwaka ngolu.


Bato bayaki epai ya Moyize mpe balobaki : « Tosalaki masumu tango totombokelaki Yawe mpe totombokelaki yo. Bondela Yawe ete alongola mosika na biso banyoka oyo. » Boye, Moyize abondelaki mpo na bato.


Balami alobaki na anjelu ya Yawe : — Nasali masumu. Nayebaki te ete otelemaki na nzela mpo na kokanga ngai nzela. Kasi soki osepeli na mobembo oyo te, nakozonga na ngai.


Alobaki na bango : — Nasali masumu mpo ete nateki moto oyo asali mabe te ! Kasi bango bazongisaki : — Etali biso na nini ? Etali nde yo moko !


Bongo Saulo alobaki na Samuele : — Nasali lisumu, nabuki mobeko ya Yawe mpe malako na Ye. Nabangaki bato, yango wana natosaki bango.


Saulo alobaki : — Nasali lisumu. Kasi, sik’oyo, nabondeli yo : pesa ngai lokumu liboso ya bampaka ya bato na ngai mpe liboso ya Isalaele, zonga elongo na ngai mpo ete nakoka kogumbamela Yawe, Nzambe na yo.


Boye Saulo alobaki : — Solo, nasali masumu ! Davidi, mwana na ngai ya mobali, zonga ! Mpo ete omonaki ete bomoi na ngai ezali motuya, nakomeka lisusu te kosala yo mabe. Nasalaki penza lokola moto ya liboma mpe napengwaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ