Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 10:10 - Mokanda na Bomoi

10 Faraon alobaki na bango : — Soki nakotika bino kokende elongo na bana na bino, wana tika ete Yawe azala elongo na bino ! Nzokande emonani solo ete bozali na makanisi mabe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 10:10
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, botika te ete Ezekiasi amema bino na libunga mpe akosa bino ndenge wana ; bondimela ye te ! Pamba te soki nzambe moko te ya ekolo songolo to ya mokili pakala alongaki kokangola bato na ye na loboko na ngai mpe na loboko ya batata na ngai, bongo nzambe na bino nde akolonga kokangola bino na loboko na ngai ? »


Ekosalema bongo te ! Kaka mibali nde bakokende kogumbamela Yawe, pamba te yango nde likambo oyo bozali kosenga ngai. Boye babenganaki Moyize mpe Aron liboso ya Faraon.


Faraon abengisaki Moyize mpe alobaki : — Bokende kogumbamela Yawe ; bokende bino nyonso nzela moko, ezala basi mpe bana na bino. Kasi botika kaka bangombe, bameme mpe bantaba na bino.


Moyize azongisaki : — Tokokende elongo na bilenge na biso, bampaka na biso, bana na biso ya mibali mpe ya basi, bameme na biso, bantaba na biso mpe bangombe na biso ; pamba te tokosala feti mpo na lokumu ya Yawe.


Yawe atambolaki liboso na bango, na moyi lokola likonzi ya lipata mpo na kolakisa bango nzela, mpe na butu lokola likonzi ya moto mpo na kongengisa bango, mpo ete batambola butu mpe moyi.


Nani akoki kaka kobimisa liloba mpo ete likambo esalema soki Nkolo apesi yango nzela te ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ