1 Yawe alobaki na Moyize : « Kende epai ya Faraon, pamba te nakomisi motema na ye mpe ya bakalaka na ye makasi, mpo ete nasala bilembo na Ngai ya kokamwa kati na bango,
Yango wana, nakosembola loboko na Ngai ; nakobeta Ejipito na nzela ya bikamwa na Ngai nyonso oyo nakosala kati na yango. Sima na yango, mokonzi ya Ejipito akotika bino kokende.
Yawe alobaki na Moyize : — Sik’oyo, lokola ozali kozonga na Ejipito, tala bikamwa nyonso oyo napesi yo nguya ya kosala ; okosala yango liboso ya Faraon. Ngai nakokomisa motema na ye libanga mpo ete akoka kotika te bato na Ngai kokende.
Atako bongo, Faraon akoyokela bino te. Boye, nakosembola loboko na Ngai kati na Ejipito ; mpe na nzela ya bitumbu minene, nakobimisa wuta na Ejipito mampinga na Ngai, bato na Ngai, bana ya Isalaele.
« Azipaki miso na bango mpe akomisaki bango mitema makasi, mpo ete bamona te na miso na bango, basosola te na mitema na bango, babongola mitema te, mpe ngai nabikisa bango te. »
Pamba te, tala ndenge Makomi elobaki na tina na Faraon : « Nakomisaki yo mokonzi mpo na kotalisa nguya na Ngai kati na yo, mpe mpo ete lokumu ya Kombo na Ngai epanzana na mokili mobimba. »
Mawa na biso ! Nani akokangola biso na maboko ya Nzambe oyo ya nguya ? Ezali Nzambe wana nde abomaki bato ya Ejipito na nzela ya bitumbu ya ndenge na ndenge kati na esobe.