Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 1:21 - Mokanda na Bomoi

21 Lokola basi oyo babotisaka bazalaki kobanga Nzambe, Nzambe afulukisaki mabota na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 1:21
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki osali nyonso oyo Ngai nazali kotinda yo, soki otamboli na banzela na Ngai mpe osali makambo ya sembo na miso na Ngai, na kobatelaka mibeko mpe malako na Ngai ndenge Davidi, mowumbu na Ngai, asalaki, wana nakozala na yo elongo, nakosala ete bokonzi kati na libota na yo elendisama ndenge nasalaki epai ya Davidi, mpe nakopesa yo Isalaele.


Mpe sik’oyo, na Kombo na Yawe oyo alendisi ngai na kiti ya bokonzi ya Davidi, tata na ngai, mpe oyo asali ete bokonzi ezala na libota na ngai ndenge alapaki yango na ndayi, Adoniya akokufa kaka lelo.


Bokumisa Yawe ! Esengo na moto oyo atosaka Yawe mpe asepelaka makasi na mibeko na Ye.


Nzembo ya Salomo. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Soki Yawe atongi ndako te, batongi ndako bazali kosala mosala ya pamba ; soki Yawe akengeli engumba te, bakengeli bazali kosala na pamba.


Bana bazali libula kowuta na Yawe, mpe kobota bana ezali lifuti.


Tia elikya na yo kati na Yawe mpe sala bolamu, vanda kati na mokili mpe lia na kimia.


Kasi basi oyo babotisaka babangaki Nzambe mpe basalaki te makambo oyo mokonzi ya Ejipito atindaki bango kosala ; batikaki bana mibali na bomoi.


Ndako etongamaka na nzela ya bwanya, mpe elendisamaka na nzela ya mayele.


Atako moto oyo asalaka masumu asali mabe mbala nkama moko mpe awumeli tango molayi na bomoi, nayebi solo ete bato oyo batosaka Nzambe bakozala bato ya esengo ; pamba te bazali na botosi liboso na Ye.


« Kende epai ya bato ya libota ya Rekabi mpe bengisa bango ete baya kokota kati na moko ya bashambre ya Tempelo ya Yawe. Mpe pesa bango masanga ya vino ya komela kuna. »


Nakomiponela Nganga-Nzambe ya sembo oyo akosala kolanda motema mpe makanisi na Ngai. Nakobongisela ye libota moko oyo ekowumela, mpe akosala tango nyonso mosala ya bonganga-Nzambe liboso ya mopakolami na Ngai.


Nabondeli yo, limbisa mabe ya mwasi mosali na yo. Yawe akosala penza ete libota ya nkolo na ngai ewumela tango nyonso na bokonzi, pamba te obundaka bitumba ya Yawe. Tika ete, tango nyonso okozala na bomoi, mabe ata moko te emonana kati na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ