15 Mokonzi ya Ejipito alobaki na basi oyo babotisaka basi ya Ba-Ebre, oyo bakombo na bango ezalaki Shifra mpe Puwa :
mpe bakomaki konyokola bango na misala makasi : kosala potopoto, kobeta babiliki mpe kosala misala nyonso ya bilanga. Misala nyonso oyo bazalaki kosalisa bango ezalaki ya pasi mpe ya makasi.
« Tango bokobotisa basi ya Ba-Ebre, botala soki mwana nini abotami ; soki azali mwana mobali, boboma ye ; kasi soki azali mwana mwasi, botika ye na bomoi. »
Yona azongisaki : — Nazali Mo-Ebre, nasambelaka Yawe, Nzambe ya Lola, oyo akela bibale mpe mokili.
Nzokande amatisaki bango likolo ya mwanza ya ndako mpe abombaki bango na se ya matiti oyo basalelaka bilamba ya lino, oyo atiaki likolo ya mwanza.