Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 9:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bazongiselaki ye : — Basali na yo bawuti na mokili moko ya mosika penza, likolo ya sango na Yawe, Nzambe na bino. Pamba te toyokaki sango na Ye mpo na makambo nyonso oyo asalaki kati na Ejipito

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 9:9
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ndenge moko mpe mpo na mopaya oyo azali te na molongo ya Isalaele, bato na Yo : wana akowuta na mokili ya mosika, mpo na Kombo na Yo,


Bongo Balevi oyo : Jozue, Kadimieli, Bani, Ashabinia, Sherebia, Odia, Shebania mpe Petaya balobaki : — Botelema mpe bokumisa Yawe, Nzambe na bino, mpo na seko na seko : « Tika ete Kombo na Yo ya nkembo epambolama mpe enetolama likolo ya nkembo mpe lokumu nyonso.


Tika ete bakumisa Kombo ya Yawe ! Pamba te Ye moko kaka nde aleki likolo ; nkembo na Ye eleki mabele mpe likolo.


Tika ete Kombo na Ye ya nkembo epambolama libela na libela ! Tika ete mokili mobimba etonda na nkembo na Ye ! Amen ! Amen !


Na miso ya bakoko na bango, asalaki bikamwa kati na Ejipito, na etuka ya Tsoani ;


Tika ete soni mpe somo makasi elata bango mpo na libela ! Tika ete bakufa na soni !


Bikolo eyoki sango na yango mpe ekomi kolenga, somo ekangaki bato ya Filisitia.


Kasi natikaki yo na bomoi mpo na tina oyo : kotalisa yo nguya na Ngai mpe kosala ete lokumu ya Kombo na Ngai epanzana na mokili mobimba.


Solo, okobenga bikolo oyo oyebi te, mpe bikolo oyo eyebi yo te ekoya na lombangu epai na yo mpo na Yawe, Nzambe na yo, mpo na Mosantu ya Isalaele, pamba te alatisi yo nkembo. »


Nakotia elembo kati na bango mpe nakotinda, wuta na bikolo, ndambo ya bato oyo bakobika : na Tarsisi, na Puli mpe na Ludi (bato oyo bayebi kosalela tolotolo malamu), na Tubali mpe na Yavani, na bisanga oyo ezalaka mosika, oyo etikala nanu koyoka sango na Ngai te mpe komona nkembo na Ngai te. Bakotatola nkembo na Ngai kati na bikolo.


Na bongo, soki obomi bato oyo nyonso na mbala moko, bikolo oyo eyokaki sango oyo mpo na Yo ekoloba :


Wuta na Kadeshi, Moyize atindaki bantoma epai ya mokonzi ya Edomi mpe alobaki : — Tala maloba oyo ndeko na yo, Isalaele, alobi : « Oyebi pasi nyonso oyo ekomelaki biso.


Pamba te milimo ya mbindo ezalaki kobima kati na bato mingi na koganga makasi, mpe bato mingi oyo bakufa makolo mpe oyo batambolaka tengu-tengu babikaki.


Soki bandimi mpe bafungoli bikuke na bango, bokosalisa bato nyonso ya engumba wana misala makasi mpe bakosalela bino.


Ezali ndenge wana nde bokosala bingumba nyonso oyo ezali mosika na bino, bingumba oyo ezali te kati na mokili oyo bokozwa.


mpe epai ya bakonzi mibale ya bato ya Amori oyo bazalaki na ngambo ya este ya Yordani : Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, mpe Ogi, mokonzi ya Bashani, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti.


Nzokande, mikolo misato sima na kosala boyokani elongo na bato ya Gabaoni, bana ya Isalaele bayokaki ete bato yango bazalaka pene na bango mpe bavandaka kati na bango.


Boye, bana ya Isalaele batelemaki mpo na kokende ; mpe na mokolo ya misato, bakomaki na bingumba na bango : Gabaoni, Kefira, Beyeroti mpe Kiriati-Yearimi.


Bazongiselaki Jozue : — Basali na yo bayokaki sango ya mitindo oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki epai ya mosali na Ye Moyize, ete akopesa bino mokili oyo nyonso mpe akoboma bato na yango nyonso liboso na bino. Boye, tozalaki na somo makasi ya kobungisa bomoi na biso liboso na bino ; yango wana tosalaki bongo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ