Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 9:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bato ya Isalaele balobaki na bato ya Evi : — Tango mosusu bozalaka kaka pembeni na biso ! Ndenge nini tosala boyokani elongo na bino ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 9:7
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Sishemi, mokambi ya mokili wana mpe mwana mobali ya Amori, moto ya Evi, amonaki ye, akangaki ye mpe asangisaki na ye nzoto na makasi.


Bakendeki na ndako batonga makasi ya Tiri mpe na bingumba nyonso ya bato ya Evi mpe ya Kanana ; bongo bakomaki na sude ya etuka ya Yuda, na Beri-Sheba.


Kasi soki boyoki na bokebi makambo oyo akoyebisa bino mpe soki bosaleli nyonso oyo nalobi, nakozala monguna ya banguna na bino mpe nakotelemela bato oyo bakotelemela bino.


Yango wana nakiti mpo na kokangola bango na maboko ya bato ya Ejipito mpe kobimisa bango na mokili oyo, mpo na kokotisa bango na mokili ya kitoko mpe ya monene, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Ezali mokili oyo evandaka bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.


Bokeba ! Bosala boyokani te elongo na bavandi ya mokili oyo bozali kokende, noki te bakokoma motambo kati na bino !


bokobengana bato nyonso oyo bavandaka na mboka yango, bokosilisa kobuka banzambe nyonso ya bikeko oyo basala na mabanga, na bibende banyangwisa na moto mpe bokobebisa bisambelo na bango nyonso ya likolo ya bangomba.


Kasi mpo na bingumba ya bikolo oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo lokola libula, kotika ata eloko moko te na bomoi.


Longola kaka bato ya Evi oyo bazalaki kovanda na Gabaoni, engumba moko te etikalaki kosala boyokani ya kimia na bana ya Isalaele, oyo babotolaki yango nyonso na bitumba.


Tango bakonzi nyonso (bakonzi ya bato ya Iti, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi) oyo bazalaki na ngambo ya weste ya Yordani, kati na mokili ya bangomba, na etando mpe na mokili oyo ezalaki pembeni-pembeni ya Mayi monene Mediterane, pene ya Libani, bayokaki sango ya makambo yango,


mpe bokosala boyokani te elongo na bato ya mokili oyo, kasi bokobuka bitumbelo na bango. › Nzokande, botosaki Ngai te. Mpo na nini bosalaki bongo ?


Yawe atikaki kati na mokili yango bakonzi mitano ya bato ya Filisitia, bato nyonso ya Kanana, bato nyonso ya Sidoni mpe bato nyonso ya Evi, oyo bazalaki kovanda na bangomba ya Libani, wuta na ngomba ya Bala-Erimoni kino na Lebo-Amati.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ