4 basalelaki mayele mabe : babongolaki lolenge na bango, batiaki na likolo ya ba-ane na bango basaki epasuka-pasuka mpe bambeki ya kala ya vino oyo etoboka-toboka mpe babamba-bamba.
Lokola lokumu ya Dina, ndeko mwasi na bango, ebebaki, bana mibali ya Jakobi basalelaki mayele mabe mpo na kopesa eyano epai ya Sishemi mpe tata na ye Amori.
Ezali mpe ndenge moko mpo na vino ya sika : batiaka yango te kati na bambeki ya kala, noki te bambeki ekopasuka, vino ekosopana mpe bambeki ekobeba libela. Nzokande, batiaka kaka vino ya sika kati na bambeki ya sika ; na bongo, vino mpe bambeki ekobatelama malamu.
Moto moko te atiaka vino ya sika kati na bambeki ya kala, noki te vino ya sika ekopasola bambeki ; vino ekosopana mpe bambeki ekopasuka. Nzokande, batiaka kaka vino ya sika kati na bambeki ya sika !
Tala kutu mapa na biso, ezalaki ya moto tango tobongisaki yango na bandako na biso lokola bilei ya mobembo, na mokolo oyo tolongwaki mpo ete toya epai na bino. Kasi sik’oyo tala ndenge nini esili kokawuka mpe kokoma biteni-biteni.