Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 9:27 - Mokanda na Bomoi

27 Na mokolo wana, Jozue akomisaki bango bawumbu mpo na kokata bakoni mpe kotoka mayi mpo na lisanga ya Isalaele mpe mpo na etumbelo ya Yawe, kino na mokolo ya lelo, na esika nyonso oyo Yawe akopona.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 9:27
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Salomo atangaki motango ya bapaya nyonso oyo bazalaki kati na Isalaele kolanda ndenge Davidi, tata na ye, atangaki motango ya bato. Bazalaki bato nkoto nkama moko na tuku mitano na misato na nkama motoba.


Na ndambo eteni oyo okopesa na basoda oyo bakendeki na bitumba, tia pembeni lokola mpako mpo na Yawe, moto moko kati na bato nkama mitano, ebwele moko kati na bibwele nkama mitano, ezala ya ngombe, ya ane, ya meme to ya bantaba.


Kamata kati na ndambo ya eteni ya bana ya Isalaele, moko kati na tuku mitano, ezala ya bato, ya ngombe, ya ane, ya meme, ya bantaba to ya bibwele mosusu mpe pesa yango epai ya Balevi oyo bazali na mokumba ya kobatela Mongombo na Yawe. »


Na ndambo oyo epesamelaki bana ya Isalaele, Moyize alongolaki moto moko kati na bato tuku mitano mpe nyama moko kati na banyama tuku mitano, ndenge Yawe atindaki ye mpe apesaki yango epai ya Balevi oyo bazalaki na mokumba ya kobatela Mongombo na Yawe.


Boye, na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokomema eloko nyonso oyo natindi bino : bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, biteni na bino ya zomi, bakado na bino ya ndenge na ndenge mpe biloko nyonso ya kitoko oyo bozali na yango, oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa epai na Yawe.


Bokobonza bambeka yango kaka na esika oyo Yawe akopona kati na moko ya bikolo na bino, mpe kuna kaka nde bokosala makambo nyonso oyo natindi bino.


Bosengeli koluka esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona kati na bikolo na bino nyonso mpo na kotia Kombo na Ye mpe mpo na kokomisa yango esika na Ye. Ezali na esika yango kaka nde bosengeli kokende.


Bakambi babakisaki lisusu : « Tika ete bazala na bomoi, kasi bakobanda kokata banzete mpe kotoka mayi mpo na lisanga mobimba. » Wana nde ezalaki mokano oyo bakambi bazwaki.


Jozue abikisaki bango na maboko ya bana ya Isalaele, mpe babomaki bango te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ