26 Jozue abikisaki bango na maboko ya bana ya Isalaele, mpe babomaki bango te.
Tala biso oyo, tomitiki na maboko na yo ; nyonso oyo okomona malamu mpe sembo na miso na yo, sala biso yango.
Na mokolo wana, Jozue akomisaki bango bawumbu mpo na kokata bakoni mpe kotoka mayi mpo na lisanga ya Isalaele mpe mpo na etumbelo ya Yawe, kino na mokolo ya lelo, na esika nyonso oyo Yawe akopona.