Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 9:25 - Mokanda na Bomoi

25 Tala biso oyo, tomitiki na maboko na yo ; nyonso oyo okomona malamu mpe sembo na miso na yo, sala biso yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 9:25
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrami alobaki : — Mosali na yo azali na maboko na yo. Sala epai na ye nyonso oyo omoni malamu. Boye, Sarayi akomaki konyokola Agari mpe Agari akimaki mosika na ye.


Kasi soki Nzambe alobi : « Nasepeli na yo te, » wana tika ete asala epai na ngai makambo oyo amoni ete ezali malamu, pamba te nazali ya kobongama.


Davidi azongiselaki Gadi : — Nazali na pasi makasi na motema. Eleki malamu mpo na ngai kokweya na maboko ya Yawe, pamba te mawa na Ye ezali solo monene ; kasi tika ete nakweya te na maboko ya bato.


Boye, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, moyangeli ya engumba, bampaka mpe babateli ya bana ya mokonzi batindaki sango oyo epai ya Jewu : « Tozali basali na yo mpe tokosala nyonso oyo okoloba. Tokotia moto mosusu te lokola mokonzi, tokosala nyonso oyo okomona malamu. »


Nasilikelaki bato na Ngai, nasambwisaki libula na Ngai ; nakabaki bango na maboko na yo, mpe oyokelaki bango mawa te ; bongo omemisaki ata mibange ekangiseli ya kilo makasi.


Bongo mpo na ngai, nazali na maboko na bino, bosala ngai makambo nyonso oyo bomoni ete ezali malamu mpe sembo.


Mokonzi Sedesiasi azongisaki : — Azali na maboko na bino ; mokonzi akoki koboya likanisi na bino te !


Iyo, Tata, pamba te, kati na boboto na Yo, olingaki ete esalema bongo !


Jozue abikisaki bango na maboko ya bana ya Isalaele, mpe babomaki bango te.


Kasi bana ya Isalaele balobaki na Yawe : — Ya solo, tosalaki lisumu na miso na Yo. Oyo omoni ete ezali malamu na miso na Yo, sala yango na biso ; kasi tobondeli Yo : bikisa biso lisusu sik’oyo !


Jedeon akendeki epai ya bato ya mboka Sukoti mpe alobaki na bango : « Tala Zeba mpe Tsalimuna oyo bofingelaki ngai na koloba : ‹ Osili kotia na se ya bokonzi na yo Zeba mpe Tsalumuna mpo ete biso topesa lipa na basoda na yo, oyo basili kolemba ? › »


Boye Samuele ayebisaki ye makambo nyonso, abombelaki ye ata likambo moko te. Mpe Eli alobaki : — Azali Yawe. Tika ete asala makambo oyo ezali malamu na miso na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ