23 Bozali sik’oyo na se ya elakeli mabe mpe bokotikala libela kozala bawumbu ; bokobanda kokataka bakoni mpe kotokaka mayi mpo na Ndako ya Nzambe na ngai.
Botelemi awa mpo na kosala boyokani elongo na Yawe, Nzambe na bino ; boyokani oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kosala elongo na bino, na mokolo ya lelo, na kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe,
Na mokolo wana, Jozue akomisaki bango bawumbu mpo na kokata bakoni mpe kotoka mayi mpo na lisanga ya Isalaele mpe mpo na etumbelo ya Yawe, kino na mokolo ya lelo, na esika nyonso oyo Yawe akopona.