Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 9:21 - Mokanda na Bomoi

21 Bakambi babakisaki lisusu : « Tika ete bazala na bomoi, kasi bakobanda kokata banzete mpe kotoka mayi mpo na lisanga mobimba. » Wana nde ezalaki mokano oyo bakambi bazwaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 9:21
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ejipito ezali kokima, na makelele lokola nyoka, pamba te banguna na yango bazali kopusana na nguya ; bazali koya kobundisa yango na bipasola lokola bato oyo bakataka banzete.


elongo na bana na bino mpe basi na bino mpe bapaya oyo bazali kati na milako na bino mpo na kobukela bino bakoni mpe kotokelaka bino mayi.


Botelemi awa mpo na kosala boyokani elongo na Yawe, Nzambe na bino ; boyokani oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kosala elongo na bino, na mokolo ya lelo, na kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe,


Nzokande, Adoni-Tsedeki, mokonzi ya Yelusalemi, ayokaki ete Jozue abotolaki Ayi mpe abebisaki yango nyonso ; asalaki Ayi mpe mokonzi na yango ndenge kaka asalaki Jeriko mpe mokonzi na yango. Ayokaki lisusu ete bavandi ya Gabaoni basalaki boyokani ya kimia elongo na Isalaele mpe bakomaki kovanda kati na bango.


Jozue asalaki elongo na bango boyokani ya kimia ; alakaki ete akoboma bango te. Mpe bakambi ya lisanga ya Isalaele bandimaki yango na kolapa ndayi.


Kasi tala ndenge nini tokoki kosala bango : Tokotika bango kobika mpo ete kanda na Nzambe ekitela biso te, pamba te tolapaki ndayi na tina na bango. »


Bozali sik’oyo na se ya elakeli mabe mpe bokotikala libela kozala bawumbu ; bokobanda kokataka bakoni mpe kotokaka mayi mpo na Ndako ya Nzambe na ngai.


Na mokolo wana, Jozue akomisaki bango bawumbu mpo na kokata bakoni mpe kotoka mayi mpo na lisanga ya Isalaele mpe mpo na etumbelo ya Yawe, kino na mokolo ya lelo, na esika nyonso oyo Yawe akopona.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ