Boye bakonzi mitano ya bato ya Amori : mokonzi ya Yelusalemi, ya Ebron, ya Yarimuti, ya Lakishi mpe ya Egiloni, bakendeki elongo na mampinga na bango nyonso mpo na kozingela Gabaoni mpe kobundisa yango.
Tango Yabini, mokonzi ya Atsori, ayokaki makambo oyo, atindaki maloba epai ya Yobabi, mokonzi ya Madoni ; epai ya mokonzi ya Shimironi, epai ya mokonzi ya Akishafi,
Boye bokatisaki Yordani mpe bokomaki na engumba Jeriko. Bavandi ya Jeriko babundisaki bino ndenge kaka bato ya Amori, ya Perizi, ya Kanana, ya Iti, ya Girigazi, ya Evi mpe ya Yebusi, basalaki ; kasi nakabaki bango mpe na maboko na bino.
Ezali milimo ya kindoki oyo esalaka bikamwa. Ebimi mpo na kokende epai ya bakonzi ya mokili mobimba, mpo na kosangisa bango mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.