Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 9:18 - Mokanda na Bomoi

18 Kasi bana ya Isalaele babundisaki bango te, pamba te bakambi ya lisanga balapaki ndayi mpo na bango na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Boye, lisanga mobimba ekomaki koyimayima mpo na bakambi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 9:18
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi atikaki na bomoi Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, mpo na boyokani oyo ezalaki kati na bango mibale, Davidi mpe Jonatan, mwana mobali ya Saulo, tango Davidi alapaki ndayi na Kombo na Yawe.


asanganaka te na moto oyo asalaka mabe, kasi apesaka lokumu na moto oyo atosaka Yawe ; akokisaka ndayi na ye atako ekopesa ye pasi, mpe abongolaka mokano na ye te ;


Ndenge ndoto eyaka soki moto azali na misala mingi, ndenge wana mpe maloba ebele ebimisaka bozoba.


Ndoto ebele mpe maloba ebele ezali kaka pamba ; yango wana tosa nde Nzambe.


Bato nyonso basukaka kaka ndenge moko : ezala moto ya sembo to moto mabe, ezala moto malamu to moto oyo asalaka masumu, ezala moto ya peto to moto ya mbindo, ezala moto oyo abonzaka mbeka to moto oyo abonzaka mbeka te. Ndenge ezalaka mpo na moto ya motema malamu ndenge mpe ezalaka mpo na moto ya masumu ; ndenge ezalaka mpo na moto oyo alapaka ndayi ndenge mpe ezalaka mpo na moto oyo abangaka kolapa ndayi.


‹ Soki moto apesi elaka epai na Yawe na nzela ya ndayi to azwi ekateli songolo na nzela ya ndayi, tika ete akokisa elaka na ye, asala kolanda maloba oyo ebimaki na monoko na ye.


Soki olapi ndayi epai na Yawe, Nzambe na yo, kowumela te mpo na kokokisa yango ; noki te Yawe, Nzambe na yo, akotuna yo yango mpe ekozala lisumu mpo na yo.


Kasi soki oboyi na yo kolapa ndayi, okomema ngambo te.


Likambo nyonso oyo bibebu na yo ekobimisa, osengeli kosalela yango, pamba te olapaki ndayi epai na Yawe, Nzambe na yo, na monoko na yo moko mpe wuta na mokano ya motema na yo.


Boye, bana ya Isalaele batelemaki mpo na kokende ; mpe na mokolo ya misato, bakomaki na bingumba na bango : Gabaoni, Kefira, Beyeroti mpe Kiriati-Yearimi.


Kasi bakambi nyonso balobaki na lisanga mobimba : « Solo, tolapaki ndayi mpo na bango na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Boye, tokoki kosala bango mabe te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ