Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 9:17 - Mokanda na Bomoi

17 Boye, bana ya Isalaele batelemaki mpo na kokende ; mpe na mokolo ya misato, bakomaki na bingumba na bango : Gabaoni, Kefira, Beyeroti mpe Kiriati-Yearimi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 9:17
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande mwana mobali ya Saulo azalaki na bato mibale oyo bazalaki bakonzi ya mampinga : moko, kombo na ye ezalaki « Baana ; » mpe mosusu, « Rekabi. » Bazalaki bana mibali ya Rimoni, moto ya Beyeroti, kati na bato ya ekolo ya Benjame. Beyeroti ezalaki eteni ya mabele ya Benjame,


Yishimaeya, moto ya Gabaoni, moko kati na lisanga ya basoda ya mpiko tuku misato mpe azalaki mokonzi ya lisanga yango ;


Bango wana nde bazalaki bakitani ya Kalebi. Bana mibali ya Wuri, mwana ya liboso oyo abotaki na Efrata, mwasi na ye : Shobali, tata ya Kiriati-Yearimi ;


Bakitani ya Shobali, tata ya Kiriati-Yearimi : Aruwe mpe Atsi-Amenuoti.


Mabota ya Kiriati-Yearimi : bato ya Yeteri, ya Puti, ya Shumati mpe ya Mishirayi. Bato ya Tsorea mpe ya Eshitaoli babimelaki na mabota oyo.


Mongombo na Yawe oyo Moyize atongaki na esobe mpe etumbelo ya bambeka ya kotumba ezalaki na tango wana, na esambelo ya likolo ya ngomba ya Gabaoni.


Bakitani ya Kiriati-Yearimi, Kefira mpe Beyeroti : nkama sambo na tuku minei na misato.


Bato ya bamboka Kiriati-Yearimi, Kefira mpe Beyeroti : nkama sambo na tuku minei na misato.


Nzokande, Iri, mwana mobali ya Shemaya, moto ya Kiriati-Yearimi, azalaki mpe kosakola na Kombo na Yawe. Azalaki kaka kosakola makambo moko na Jeremi na tina na engumba mpe mokili oyo.


Boye, sango oyo epesaki somo na mokonzi ya Yelusalemi elongo na bato na ye, pamba te Gabaoni ezalaki engumba moko ya monene lokola bingumba ya bakonzi ; ezalaki monene koleka ata Ayi, mpe mibali na yango nyonso bazalaki bilombe ya bitumba.


Kiriati-Bala oyo bazalaki mpe kobenga Kiriati-Yearimi, mpe Raba : bingumba nyonso ezalaki mibale elongo na bamboka na yango ya mike-mike.


Longwa na songe ya ngomba, mondelo yango ekatisaki kino na etima ya mayi ya Nefitoa, ebimaki na bingumba ya ngomba Efroni mpe ekitaki na ngambo ya Baala (oyo ezali Kiriati-Yearimi).


Longwa na ngomba moke oyo etalana na Beti-Oroni na ngambo ya sude, mondelo yango ebalukaki na ngambo ya weste, mpe esukaki na Kiriati-Bala, oyo ekoma Kiriati-Yearimi, engumba ya bakitani ya Yuda. Yango nde ezalaki mondelo na yango na ngambo ya weste.


Na ngambo ya sude, mondelo yango ebandaki longwa na Kiriati-Yearimi, na ngambo ya weste, mpe ekendeki kobima na etima ya mayi ya Nefitoa.


Nzokande, mikolo misato sima na kosala boyokani elongo na bato ya Gabaoni, bana ya Isalaele bayokaki ete bato yango bazalaka pene na bango mpe bavandaka kati na bango.


Kasi bana ya Isalaele babundisaki bango te, pamba te bakambi ya lisanga balapaki ndayi mpo na bango na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Boye, lisanga mobimba ekomaki koyimayima mpo na bakambi.


Tango mpe bato ya Gabaoni bayokaki makambo oyo Jozue asalaki na Jeriko mpe na Ayi,


Bazongiselaki ye : — Basali na yo bawuti na mokili moko ya mosika penza, likolo ya sango na Yawe, Nzambe na bino. Pamba te toyokaki sango na Ye mpo na makambo nyonso oyo asalaki kati na Ejipito


Bakendeki kotonga molako na bango na Kiriati-Yearimi, kati na mokili ya Yuda. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango Maane Dani  ; ezali na ngambo ya weste ya Kiriati-Yearimi.


Bongo batindaki bantoma koloba na bato ya Kiriati-Yearimi : « Bato ya Filisitia bazongisi Sanduku ya Yawe ; boya kozwa yango mpe bomema yango epai na bino. »


Bato ya Kiriati-Yearimi bayaki kozwa Sanduku ya Yawe mpe bamemaki yango na ndako ya Abinadabi, na ngomba moke ; mpe babulisaki Eleazari, mwana na ye ya mobali, mpo ete abatelaka Sanduku ya Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ