Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 9:10 - Mokanda na Bomoi

10 mpe epai ya bakonzi mibale ya bato ya Amori oyo bazalaki na ngambo ya este ya Yordani : Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, mpe Ogi, mokonzi ya Bashani, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 9:10
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mobu ya zomi na minei, Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, babundisaki mpe balongaki bato ya Refayimi na Ashiteroti-Karinayimi ; bato ya Zuzimi, na Ami ; mpe bato ya Emimi, na Shave-Kiriatayimi ;


Wuta na Kadeshi, Moyize atindaki bantoma epai ya mokonzi ya Edomi mpe alobaki : — Tala maloba oyo ndeko na yo, Isalaele, alobi : « Oyebi pasi nyonso oyo ekomelaki biso.


Makambo yango esalemaki sima na Moyize kolonga Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki koyangela wuta na Eshiboni, mpe sima na ye kolonga Ogi, mokonzi ya Bashani, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti mpe na Edreyi.


Kasi Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, aboyaki kopesa biso nzela ya kolekela na mokili na ye, pamba te Yawe, Nzambe na bino, akomisaki moto na ye makasi mpe motema na ye libanga, mpo na kokaba ye na maboko na bino ndenge asali lelo.


Ogi, mokonzi ya Bashani, moko kati na bakitani ya suka ya Refayimi, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti mpe na Edreyi.


ndambo ya mokili ya Galadi ; Ashitaroti mpe Edreyi, bingumba ya bokonzi ya Ogi kati na Bashani ; ezalaki mpo na bakitani ya Makiri, mwana mobali, ya Manase mpo na ndambo ya bakitani ya Makiri, kolanda bituka na bango.


Toyokaki ndenge nini Yawe akawusaki Ebale monene ya Barozo liboso na bino tango bobimaki na Ejipito, mpe makambo oyo bosalaki Sikoni mpe Ogi, bakonzi mibale ya bato ya Amori, oyo bobomaki penza na ngambo ya este ya Yordani.


mpe alobaki na bango : — Nayebi ete Yawe apesi mokili oyo na maboko na bino. Tozali na somo makasi mpo na bino mpe bavandi nyonso ya engumba oyo bazali kolenga na somo likolo na bino.


Bampaka na biso mpe bavandi nyonso ya mokili na biso balobaki na biso : « Bokamata biloko ya kolia na nzela, bokende kokutana na bango mpe boyebisa bango : ‹ Tozali basali na bino, bosala boyokani elongo na biso. › »


Bazongiselaki ye : — Basali na yo bawuti na mokili moko ya mosika penza, likolo ya sango na Yawe, Nzambe na bino. Pamba te toyokaki sango na Ye mpo na makambo nyonso oyo asalaki kati na Ejipito


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ