Jozue 9:1 - Mokanda na Bomoi1 Tango bakonzi nyonso (bakonzi ya bato ya Iti, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi) oyo bazalaki na ngambo ya weste ya Yordani, kati na mokili ya bangomba, na etando mpe na mokili oyo ezalaki pembeni-pembeni ya Mayi monene Mediterane, pene ya Libani, bayokaki sango ya makambo yango, အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
kino Yawe akopesa bango mpe bopemi ndenge asalaki mpo na bino, mpe kino tango bango mpe bakobotola mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bango. Na sima na yango nde bokoki kozonga mpe kovanda na mabele na bino moko, mabele oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki bino na ngambo ya este ya Yordani, na ngambo oyo moyi ebimelaka.
Nzokande, tango bakonzi nyonso ya Amori, na ngambo ya weste ya Yordani, mpe bakonzi nyonso ya Kanana, pene ya ebale monene ya Barozo, bayokaki ndenge nini Yawe akawusaki ebale Yordani liboso ya bana ya Isalaele kino tango basilisaki kokatisa, mitema na bango ebukanaki mpe bazalaki lisusu na makasi te ya kotelemela bana ya Isalaele.