Moto moko te ayebi tango nini ngonga na ye ekokoka : ndenge mbisi ekangamaka na monyama to ndenge banyama ekangamaka na motambo, ndenge wana mpe bato bakangamaka na mitambo ya pasi oyo ekweyelaka bango na mbalakata.
Libota ya Benjame bakanisaki ete bakobeta bango ndenge basalaki liboso. Nzokande bana ya Isalaele bazwaki mokano ya kokima mpe ya komema bango mosika ya engumba, mosika ya Gibea.