Mokonzi alamukaki na butu mpe alobaki na bakalaka na ye : — Tika ete nayebisa bino makambo oyo bato ya Siri basali biso. Bayebi solo ete tozali kokufa nzala, yango wana batiki milako na bango mpo na kokende kobombama na zamba. Balobani bango na bango : « Bakobima solo, mpe tokokanga bango ya bomoi, bongo tokokota na engumba. »