Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 8:34 - Mokanda na Bomoi

34 Sima na yango, Jozue atangaki maloba nyonso ya Mobeko : mapamboli mpe bilakeli mabe kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Mobeko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 8:34
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango wana, batangaki buku ya Moyize na mongongo makasi mpo ete bato bayoka ; mpe bamonaki ete ekomama boye kati na yango : « Moto ya Amoni mpe moto ya Moabi bakotikala kondimama te kati na lisanga ya Nzambe ;


Batelemaki na esika oyo bazalaki, mpe buku ya Mobeko ya Yawe, Nzambe na bango, etangamaki ngonga misato ; mpe ngonga misato mosusu, bafukamaki liboso ya Yawe, Nzambe na bango, mpo na kotubela masumu na bango.


Balevi bakoloba epai ya bana nyonso ya Isalaele maloba oyo na mongongo makasi :


Yawe akotindela bino bokono ya liboma, ya kokufa miso mpe ya mobulu na makanisi.


Sala ete maloba ya buku oyo ya Mobeko ewumela tango nyonso na monoko na yo ; tangaka mpe kanisaka yango butu mpe moyi, mpo ete osala kolanda nyonso oyo ekomami kati na yango. Na bongo nde okokende liboso mpe okolonga kati na misala na yo nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ