Jozue 8:29 - Mokanda na Bomoi29 Adiembikaki mokonzi ya Ayi, na nzete kino na pokwa ; bongo tango moyi elalaki, Jozue atindaki ete balongola ebembe yango na nzete. Babwakaki yango na ekotelo ya ekuke ya engumba mpe batondisaki na likolo na yango liboke monene ya mabanga oyo ezali kino na mokolo ya lelo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Lokola ezalaki mokolo ya komilengela mpo na Saba, mpe lokola Saba yango ezalaki na tina makasi, Bayuda balingaki te ete bibembe etikala na ba-ekulusu na tango ya Saba. Boye, bakendeki kosenga epai ya Pilato ete apesa mitindo ya kobuka makolo ya bibembe oyo ezalaki na likolo ya ba-ekulusu mpe ya kolongola banzoto na bango.