Yawe alobaki na Jozue : « Sembola na ngambo ya Ayi likonga oyo osimbi na loboko, pamba te nalingi kokaba yango na maboko na yo. » Boye Jozue asembolaki na ngambo ya engumba likonga oyo ezalaki na loboko na ye.
Okosala engumba Ayi mpe mokonzi na yango ndenge osalaki Jeriko mpe mokonzi na yango ; kasi bokoki kozwa mpo na bino lokola bomengo ya bitumba, biloko mpe bibwele na yango. Bomba basoda na sima ya engumba. »
Tango bato ya Ayi batalaki na sima, bamonaki milinga komata na likolo wuta na engumba ; moko te akokaki lisusu kokima na ngambo moko to na ngambo mosusu. Bana ya Isalaele oyo bazalaki kokima na esobe babalukelaki bato oyo bazalaki kolanda bango.
Na bongo, bana ya Isalaele batelemaki na bisika na bango mpe bakendeki kosangana mpo na bitumba, na Bala-Tamari. Bana ya Isalaele, oyo babombamaki, babimaki na bisika na bango mpe balandaki bango na etando ya polele, na Gibea.