Kasi Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, aboyaki kopesa biso nzela ya kolekela na mokili na ye, pamba te Yawe, Nzambe na bino, akomisaki moto na ye makasi mpe motema na ye libanga, mpo na kokaba ye na maboko na bino ndenge asali lelo.
Yawe alobaki na Jozue : « Sembola na ngambo ya Ayi likonga oyo osimbi na loboko, pamba te nalingi kokaba yango na maboko na yo. » Boye Jozue asembolaki na ngambo ya engumba likonga oyo ezalaki na loboko na ye.
Bana ya Benjame babimelaki bango mpe babendaki bango mosika ya engumba. Babandaki koboma bana ya Isalaele ndenge basalaki liboso ; babomaki bato pene tuku misato kati na zamba, na nzela ya Beteli mpe ya Gibea.