Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 7:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bato ya Kanana mpe bato mosusu ya mokili bakoyoka sango yango, bakobalukela biso mpe bakolongola kombo na biso na mokili. Boye, okosala nini mpo na monene ya Kombo na Yo ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 7:9
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na biso te, Yawe, na biso te, kasi pesa nkembo na Kombo na Yo mpo na bolingo mpe boyengebene na Yo.


Nzambe, kati na Tempelo na Yo, tokanisaka bolingo na Yo.


Nzambe Mobikisi na biso, sunga biso mpo na lokumu ya Kombo na Yo, kangola biso mpe limbisa masumu na biso mpo na Kombo na Yo !


Bazali kosalela bato na Yo likita, kokanela bato oyo obatelaka.


Bazali koloba : « Boya, toboma bango nyonso mpo ete ekolo na bango ezala lisusu te, mpo ete batanga lisusu kombo ya Isalaele te. »


Mpo na nini bato ya Ejipito baloba : « Nzambe na bango azalaki na makanisi mabe tango abimisaki bango na Ejipito. Ezali nde mpo na koboma bango na mokili ya bangomba mpe kosilisa bango na mokili. » Lembisa kanda na Yo ya makasi mpe kosala lisusu mabe te na bato na Yo.


Kasi mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo epai wapi bazalaki kovanda. Ngai moko namimonisaki epai ya bana ya Isalaele na miso ya bikolo wana, mpo na kobimisa bango na Ejipito.


Tika ete Banganga-Nzambe oyo basalelaka Yawe balela na kati-kati ya ndako moke ya kokotela mpe etumbelo. Tika ete baloba : « Oh Yawe, bikisa bato na Yo, kokomisa te libula na Yo eloko ya kotiola to eloko ya maseki kati na bikolo. Mpo na nini bato ya bikolo mosusu baloba : ‹ Wapi Nzambe na bango ? › »


Bongo monguna na ngai akomona yango mpe akoyoka soni makasi, ye oyo azalaki koloba na ngai : « Wapi Yawe, Nzambe na yo ? » Miso na ngai ekomona ndenge akokweya mpe ndenge bakonyata ye lokola potopoto ya nzela.


Moyize alobaki na Yawe : — Bato ya Ejipito bakoyoka yango ! Nzokande ezali na nguya na Yo nde obimisaki bato oyo kati na bango.


Tata, pesa Kombo na Yo nkembo ! Bongo mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo : — Nasili kopesa yango nkembo mpe nakopesa yango lisusu nkembo !


noki te bato ya mokili oyo longwa kuna obimisaki biso, bakoloba : ‹ Ezali mpo ete Yawe azalaki na makoki te ya kokotisa bango na mokili oyo alakaki bango to ezali mpo ete azalaki koyina bango, yango wana abimisaki bango wuta na Ejipito mpo na koboma bango na esobe. ›


Yawe alobaki na Jozue : — Telema ! Mpo na nini omibwaki elongi kino na mabele ?


Oh Nkolo, sik’oyo naloba nini, awa Isalaele akimi liboso ya banguna na ye ?


Mpo na lokumu ya Kombo monene na Ye, Yawe akobwaka bato na Ye te, pamba te asepelaki kokomisa bino bato na Ye moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ