6 Jozue apasolaki bilamba na ye mpe amibwakaki elongi kino na mabele liboso ya Sanduku ya Yawe kino na pokwa. Bakambi ya Isalaele mpe basalaki kaka ndenge moko, bamisopelaki putulu na mito na bango.
Basalaki matanga, balelaki mpe bakilaki bilei kino na pokwa, mpo na Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali ; mpo na mampinga ya Yawe mpe mpo na libota ya Isalaele, mpo ete bakufaki na nzela ya mopanga.
Na mokolo ya misato, moto moko awutaki na molako ya Saulo mpe ayaki na bilamba epasuka, moto etonda na putulu. Tango akomaki epai ya Davidi, amibwakaki na mabele mpo na kogumbama liboso ya Davidi.
Tamari atiaki putulu na moto na ye mpe apasolaki nzambala na ye ya kitoko oyo alataki. Atiaki maboko na ye na moto mpe, wana azalaki kokende, azalaki kolela na mongongo makasi.
Wana Esidrasi azalaki kobondela mpe kotubela masumu, azalaki ya kofukama mpe azalaki kolela liboso ya Ndako ya Nzambe. Ebele ya bana ya Isalaele : mibali, basi mpe bana, basanganaki pene na ye mpe, bango nyonso, bazalaki kolela makasi.
Kaka na sanza wana, na mokolo ya tuku mibale na minei, bana ya Isalaele basanganaki mpo na kokila bilei ; balataki basaki mpe bamipakolaki putulu na mito.
Tango Maridoshe ayokaki makambo nyonso oyo elekaki, apasolaki bilamba na ye ; alataki saki, amipakolaki putulu mpe atambolaki kati na engumba na koganga makasi mpe na mawa.
Kati na bituka nyonso epai wapi mitindo mpe mobeko ya mokonzi ezalaki kokoma, matanga monene ezalaki kati na Bayuda : bazalaki kokila bilei, kolela mpe koganga ya mawa ; ebele bazalaki komitanda na basaki mpe na putulu.
Wuta na mosika, tango kaka bamonaki ye, bakokaki te koyeba ye lisusu ; boye, babandaki wana kolela makasi, bapasolaki banzambala na bango mpe bamibwakelaki putulu na mito.
Bampaka ya Siona, mboka kitoko, bavandi kimia na mabele, bamisopeli putulu na mito na bango mpe balati basaki ; bongo bilenge basi ya Yelusalemi bafukami, bilongi na bango kino na se.
Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe Kalebi, mwana mobali ya Yefune, oyo bazalaki na molongo ya bato oyo bakendeki kononga mokili bapasolaki bilamba na bango
Bakobwaka putulu na mito na bango, bakolela, bakosala matanga mpe bakoganga makasi : ‹ Mawa ! Mawa na yo, engumba monene epai wapi bato nyonso oyo bazalaki na bamasuwa na likolo ya ebale monene bakomaki bazwi mpo na bomengo na yo ! Na ngonga moko kaka, obebisami ! ›
Tango kaka Jefite amonaki ye, apasolaki bilamba na ye mpe agangaki : — Ah, mwana na ngai ya mwasi ! Opesi ngai mawa mingi mpe otie ngai na mobulu, pamba te nalapaki ndayi epai na Yawe mpe nakoki lisusu kozonga sima te.
Bana ya Isalaele bakendeki mpe balelaki liboso ya Yawe kino na pokwa, mpe batunaki Yawe : — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso ya libota ya Benjame ? Yawe azongiselaki bango : — Bokende kobundisa bango.
Bana ya Isalaele bakendeki, bango nyonso, na Beteli, mpe kuna, bavandaki mpe balelaki liboso ya Yawe. Na mokolo wana, bana ya Isalaele bakilaki bilei kino na pokwa mpe babonzaki, epai na Yawe, mbeka ya kotumba mpe mbeka ya boyokani.
Moto moko ya ekolo ya Benjame akimaki mbangu longwa na bisika oyo bazalaki kobunda mpe akomaki na Silo, na mokolo yango kaka ; azalaki na bilamba epasuka, mpe na putulu, na moto na ye.