Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 7:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bato ya Ayi babomaki bato pene tuku misato na motoba na molongo ya Isalaele. Balandaki bango kino koleka ekuke ya engumba Shebarimi mpe babomaki bango na kokita ya ngomba. Mpo na yango, mitema ya bana ya Isalaele elembaki mpe bakomaki lokola mayi oyo ezali kotiola.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 7:5
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe bafungoleli ngai makasi minoko na bango lokola nkosi oyo etomboki mpe ezali kolia nyama.


Nzambe, buka minu na bango kati na minoko na bango ; Yawe, buka bambanga ya bana ya bankosi.


Yango wana, maboko nyonso ekolemba mpe mitema ya bato nyonso ekobukana.


« Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya Yelusalemi, loba mpo na kotelemela bisika ya bule mpe sakola mpo na kotelemela Isalaele.


Bongo na mikili ya banguna na bino, bato oyo bakotikala na bomoi kati na bino, nakolembisa bango nzoto : bakokima ata makelele ya lokasa oyo mopepe eningisi, bakokima lokola nde bazali kokima liboso ya mopanga mpe bakobambana na mabele ata soki moto moko te azali kolanda bango.


Bobotola wolo mpe palata na yango na makasi, pamba te bomengo na yango ezali penza mingi koleka mpe etonda na biloko ya motuya.


Boye, bato ya Amori oyo bavandaka na bangomba yango bakitelaki bino mpe babundisaki bino, babenganaki bino lokola liboke ya banzoyi mpe balongaki bino longwa na Seiri kino na Orima.


Tango toyokaki sango yango, mitema na biso ebukanaki mpe makasi ya moko na moko kati na biso esilaki likolo na bino, pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya likolo, kuna penza na lola, mpe Nzambe ya se, awa na mabele.


mpe alobaki na bango : — Nayebi ete Yawe apesi mokili oyo na maboko na bino. Tozali na somo makasi mpo na bino mpe bavandi nyonso ya engumba oyo bazali kolenga na somo likolo na bino.


Nzokande, tango bakonzi nyonso ya Amori, na ngambo ya weste ya Yordani, mpe bakonzi nyonso ya Kanana, pene ya ebale monene ya Barozo, bayokaki ndenge nini Yawe akawusaki ebale Yordani liboso ya bana ya Isalaele kino tango basilisaki kokatisa, mitema na bango ebukanaki mpe bazalaki lisusu na makasi te ya kotelemela bana ya Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ