Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 7:3 - Mokanda na Bomoi

3 Tango bazongaki epai ya Jozue, balobaki na ye : « Ezali penza na tina te ete bato nyonso bakende kobundisa Ayi. Tinda kaka bato nkoto mibale to nkoto misato mpo na kobotola yango. Komonisa bato nyonso pasi te, pamba te engumba yango ezali kaka na bato moke. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 7:3
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto ya goyigoyi ayokaka baposa, kasi akoki kokokisa yango te ; nzokande baposa ya moto ya nzunzu ekokisamaka.


Baposa ya moto ya goyigoyi ekoboma ye, pamba te maboko na ye eboyaka kosala.


— Bosala makasi mpo na kokotela na ekuke ya moke ; pamba te, nazali koloba na bino, bato mingi bakoluka kokota, kasi bakokoka te.


Yango wana, tosala makasi mpo na kokota kati na bopemi yango mpo ete tokweya te kati na bozangi botosi lokola bana ya Isalaele.


Wuta na Jeriko, Jozue atindaki bato kokende na engumba Ayi oyo ezalaki pene ya Beti-Aveni, na ngambo ya este ya Beteli. Alobaki na bango : « Bokende kononga mokili wana. » Bato yango bakendeki mpe banongaki Ayi.


Boye, bato pene nkoto misato bakendeki, kasi bakimaki liboso ya bato ya Ayi.


Yango wana, bandeko na ngai, bosala lisusu makasi koleka mpo na kolakisa na bato ete Nzambe abenga penza bino mpe apona bino ; pamba te soki bosali bongo, bokotikala kokweya te.


Mpo na yango, bosala makasi mpo na kobakisa na likolo ya kondima na bino, bolamu ; na likolo ya bolamu, boyebi ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ