Jozue 7:26 - Mokanda na Bomoi26 Babwakaki na likolo ya Akana liboke ya mabanga ebele oyo ezali kino na mokolo ya lelo, mpe kanda ya Yawe esilaki. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango Lubwaku ya Akori. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tika ete bakambi na biso batikala awa na esika ya lisanga mobimba ! Mpe tika ete bato nyonso oyo, kati na bingumba na biso, babalaki basi ya bapaya bakende liboso ya bakambi mpe basambisi ya engumba moko na moko, na mikolo oyo bakokatela bango, kino kanda makasi ya Nzambe na biso ekolongwa kati na biso na tina na likambo yango.