19 Jozue alobaki na Akana : — Mwana na ngai, pesa nkembo epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele, mpe pesa Ye penza lokumu. Yebisa ngai likambo oyo osalaki, kobombela ngai eloko moko te.
Ezayi atunaki : — Bamoni eloko nini kati na ndako na yo ya bokonzi ? Ezekiasi azongisaki : — Bamoni biloko nyonso oyo ezali kati na ndako na ngai ; ezali na eloko moko te, kati na bibombelo na ngai, oyo nazangi kolakisa bango.
Ezekiasi alendisaki Balevi nyonso oyo balakisaki ete bayebi malamu mosala ya Yawe. Na mikolo sambo ya feti, baliaki misuni ya bambeka, babonzaki bambeka ya boyokani mpe basanzolaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango.
Tango nandimaki masumu na ngai mpe nabombaki mabe na ngai te, nalobaki : « Nakotubela masumu na ngai liboso ya Yawe. » Bongo Yo olimbisaki mabe mpe masumu na ngai.
Bopesa nkembo epai na Yawe, Nzambe na bino, liboso ete amemela bino molili, liboso ete makolo na bino ebeta mabaku na bangomba oyo ezipami na molili. Bino bozali kozela pole, kasi Ye akobongola yango molili makasi.
Nasambelaki Yawe, Nzambe na ngai, mpe natubelaki : « Nkolo, Nzambe monene mpe Nzambe ya nguya, Yo oyo obatelaka boyokani na Yo ya bolingo, elongo na bato nyonso oyo balingaka Yo mpe batosaka mibeko na Yo ;
Bafarizeo babengisaki lisusu, mpo na mbala ya mibale, moto oyo azalaki mokufi miso mpe balobaki na ye : — Pesa Nzambe nkembo na koloba solo ; biso toyebi ete moto wana azali moto ya masumu.
mpe ya koteya na boboto bato oyo babendanaka na ye ; asengeli kozala na elikya ete Nzambe akosalela bango ngolu ya kobongola mitema mpo ete bayeba solo.
Teya na batata mibange ete balekisaka ndelo te na bizaleli na bango, bazala bato oyo bakoki na lokumu, bato na mayele, bato na kondima ya solo, bato na bolingo, mpe bato na molende.
Moto makasi etumbaki bato, mpe bakomaki kofinga Kombo ya Nzambe oyo azali na bokonzi likolo ya pasi wana. Kasi baboyaki kobongola mitema na bango mpe kopesa Ye nkembo.
Bosala bililingi oyo ekotalisa bapota na bino ya libumu, mpe oyo ekotalisa bampuku oyo ezali kobebisa mokili na bino ; mpe bopesa nkembo na Nzambe ya Isalaele. Tango mosusu, akolongola loboko na Ye na likolo na bino, na likolo ya banzambe na bino, mpe na likolo ya mokili na bino.