18 Sima, tango abengisaki moto na moto kati na ndako ya Zabidi, Akana, mwana mobali ya Karimi, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Zera, moto ya libota ya Yuda, nde aponamaki.
Ndenge basambwisaka moyibi soki bakangi ye, ndenge wana mpe ekosalema mpo na libota ya Isalaele : bakonzi mpe bakambi na bango, Banganga-Nzambe mpe basakoli na bango bakosambwa.
Tango abengisaki etuka na etuka ya libota ya Yuda, etuka ya Zera nde eponamaki. Tango abengisaki ndako na ndako kati na etuka ya Zera, ndako ya Zabidi nde eponamaki.