Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 7:15 - Mokanda na Bomoi

15 Moto nyonso oyo mabe ekomonana kati na ye asengeli kokufa na moto, ye elongo na nyonso ya ye, pamba te abebisi boyokani ya Yawe mpe asali likambo ya soni kati na Isalaele. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 7:15
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bana mibali ya Jakobi bazongaki wuta na esobe, bayokaki sango ya makambo oyo esalemaki. Bongo, bayokaki pasi mingi na mitema mpe basilikaki makasi, pamba te Sishemi asalaki likambo ya soni na Isalaele, wana asangisaki nzoto na makasi na mwana mwasi ya Jakobi. Likambo ya bongo esengelaki kosalema te.


Ekosukela ngai ndenge nini ? Nakokende wapi na soni na ngai ? Mpe yo okozala ndenge nini ? Okokoma lokola moto ya liboma kati na Isalaele ! Nabondeli yo, loba na mokonzi, pamba te akoboya te ete obala ngai.


Isalaele asali lisumu. Babebisi boyokani na Ngai oyo natindaki bango ete babatela. Bakamati ndambo ya biloko oyo ekabami mpo na kobebisama, bayibi yango mpe babombi yango kati na biloko na bango.


Mokolo oyo elandaki, Jozue alamukaki na tongo-tongo penza, mpe abengisaki Isalaele, libota na libota. Mpe ezali libota ya Yuda nde eponamaki.


Tokozwa bato zomi kati na bato nkama moko ya mabota nyonso ya Isalaele, tokozwa bato nkama moko kati na bato nkoto moko mpe bato nkoto moko kati na bato nkoto zomi, mpo na kopesa biloko ya kolia epai ya mampinga. Bongo tango mampinga ekokoma na Gibea, na mokili ya Benjame, bakobundisa bato ya Gibea mpo na makambo nyonso ya somo oyo basalaki kati na Isalaele. »


Na kati-kati ya butu, bavandi ya Gibea batombokelaki ngai mpe bazingelaki ndako mpo ete baboma ngai ; basangisaki nzoto na makasi na makangu na ngai, mpe akufaki.


Nakamataki makangu na ngai, nakataki ye na biteni mpe natindaki eteni moko na moko kati na etuka oyo bapesaki na bana ya Isalaele, pamba te bato ya libota ya Benjame basalaki likambo ya somo mpe ya soni.


Boye Saulo alobaki : — Solo, nasali masumu ! Davidi, mwana na ngai ya mobali, zonga ! Mpo ete omonaki ete bomoi na ngai ezali motuya, nakomeka lisusu te kosala yo mabe. Nasalaki penza lokola moto ya liboma mpe napengwaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ