Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 7:13 - Mokanda na Bomoi

13 Telema, bulisa bato. Loba na bango : « Bomibulisa mpo na lobi, pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi boye : ‹ Mabe ezali kati na yo Isalaele, okolonga kobundisa banguna na yo te kino tango okolongola yango. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 7:13
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bana mibali mosusu ya Jakobi bayaki kosasa mibali oyo bazalaki na bapota mpe kobebisa engumba mpo ete babebisaki lokumu ya ndeko na bango ya mwasi.


Mpe sik’oyo, bolingi kokomisa bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi bawumbu na bino ? Kasi bino moko, bozali mpe na ngambo te liboso ya Yawe, Nzambe na bino ?


Bolole ! Banda nanu kolongola nzete oyo ezali kati na liso na yo, bongo miso na yo ekomona malamu mpo ete okoka kolongola mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo.


Mosakoli to moto wana oyo amonaka makambo, esengeli baboma ye, pamba te azali koteya mpo ete botombokela Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu. Moto wana azalaki nde na posa ya kopengwisa bino na nzela oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino kolanda. Boye, bosengeli kolongola mabe kati na bino.


Jozue alobaki na bato : — Bomibulisa, pamba te lobi, Yawe akosala makambo ya kokamwa kati na bino.


Kasi bosala keba na tina na biloko oyo ekabami mpo na kobebisama, mpo ete bomilukela pasi te na koluka kokamata ata eloko moko kati na yango, noki te bokomema lisuma oyo ekobebisa molako ya Isalaele mpe bokotia yango na mobulu.


Isalaele asali lisumu. Babebisi boyokani na Ngai oyo natindaki bango ete babatela. Bakamati ndambo ya biloko oyo ekabami mpo na kobebisama, bayibi yango mpe babombi yango kati na biloko na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ