Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 7:11 - Mokanda na Bomoi

11 Isalaele asali lisumu. Babebisi boyokani na Ngai oyo natindaki bango ete babatela. Bakamati ndambo ya biloko oyo ekabami mpo na kobebisama, bayibi yango mpe babombi yango kati na biloko na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 7:11
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Makambo oyo esalemaki mpo ete bato ya Isalaele batosaki te Yawe, Nzambe na bango, mpe babukaki boyokani na Ye ; elingi koloba ete batosaki te makambo nyonso oyo Moyize, mosali na Nzambe, atindaki bango.


Tango Geazi akomaki na ngomba, azwaki biloko na maboko ya basali ya Namani mpe atiaki yango kati na ndako. Azongisaki basali yango, mpe bakendeki.


Bato ya mokili bakomisi yango mbindo, bazali kotosa mibeko te ; banyati-nyati bikateli mpe babuki boyokani ya seko.


ekozala ndenge moko te na boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango tango nasimbaki bango na loboko mpo na kobimisa bango na Ejipito ; pamba te bakataki boyokani na Ngai wana, atako nazalaki Mobali ya libala mpo na bango, » elobi Yawe.


Ndenge kaka Adamu asalaki, bango mpe babukaki boyokani na Ngai ; kuna, bazalaki sembo te liboso na Ngai.


« Soki moto abuki mobeko mpe asali na nko te masumu liboso ya biloko oyo ebulisama mpo na Yawe, akobonzela Yawe lokola mbeka mpo na masumu na ye meme ya mobali ezanga mbeba, oyo akozwa kati na etonga na ye. Meme yango esengeli kokokana na motuya ya palata oyo okokata, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule : ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani.


Boni, bato wana nyonso bakoseka ye te na maloba ya kotiola mpe ya kosambwisa lokola : « Mawa na ye oyo azali kobomba biloko ya moyibi mpe akolisaka bomengo na ye na kobotola bato biloko na makasi ! » Makambo ya boye ekokoba kino penza tango nini ?


Nakoyeisa elakeli mabe oyo mpo ete ekota kati na ndako ya moyibi mpe kati na ndako ya moto oyo alapaka ndayi ya lokuta na Kombo na Ngai. Ekotikala solo kati na ndako na ye mpe ekobebisa yango nyonso, ezala mabaya to mabanga na yango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Bazongisaki : — Ezali ya Sezare. Yesu alobaki na bango : — Bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare ; mpe bopesa na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe !


Petelo alobaki na ye : — Mpo na nini boyokanaki mpo na komeka Molimo ya Nkolo ? Yoka, makolo ya bato oyo bawuti kokunda mobali na yo esili kokoma liboso ya ekuke ; yo mpe, bakomema yo.


Soki kati na moko ya bingumba oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi yo ; emonani na mobali to mwasi oyo asali mabe na miso ya Yawe, Nzambe na yo, wana abuki boyokani elongo na Ye


Kati na bikelamu nyonso, moko te ezali ya kobombama na miso ya Nzambe : nyonso ezali polele, mpe ezali ya kobombama te na miso ya Ye oyo akosambisa biso.


soki bobebisi boyokani ya Yawe, Nzambe na bino, oyo apeselaki bino mitindo, mpe bokeyi kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango. Kanda ya Yawe ekotumba bino mpe bokosila kokufa noki penza na mokili ya kitoko oyo apesaki bino. »


Bato ya Isalaele babebisaki ekila ya Yawe. Akana, mwana mobali ya Karimi, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Zera, moto ya libota ya Yuda, akamataki biloko oyo Yawe apekisaki. Bongo, kanda ya Yawe epelaki likolo ya bana ya Isalaele.


Yawe alobaki na Jozue : — Telema ! Mpo na nini omibwaki elongi kino na mabele ?


Boye Yawe atombokelaki bana ya Isalaele mpe alobaki : « Lokola ekolo oyo ekataki boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango mpe eboyi koyokela Ngai,


Saulo alobaki : — Bino nyonso oyo bozali bakambi ya bato, boya awa ! Toluka koyeba lisumu nini oyo esalemi na mokolo ya lelo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ