7 Bongo apesaki mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele : — Bokende liboso ! Botambola zingazinga ya engumba, mpe tika ete basoda oyo bazalaka na liboso, na etumba, baleka liboso ya Sanduku ya Yawe.
Kaka basi, bana mpe bibwele na bino nde bakoki kotikala na mabele oyo Moyize apesaki bino na ngambo ya este ya Yordani. Kasi bilombe na bino nyonso ya etumba basengeli kolata bibundeli, kokatisa mpe kotambola liboso ya bandeko na bino. Bokosunga bandeko na bino
Bazalaki bato pene nkoto tuku minei, bato ya bitumba, oyo bakamataki bibundeli mpo na kobunda ; balekaki liboso ya Yawe na nzela ya bitando ya Jeriko mpo na kobunda.
Boye Jozue, mwana mobali ya Nuni, abengaki Banganga-Nzambe mpe alobaki na bango : — Bomema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpe tika ete Banganga-Nzambe sambo kati na bino bakamata bakelelo sambo mpe batambola liboso ya Sanduku ya Yawe.