Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 6:5 - Mokanda na Bomoi

5 Tango lolaka ya bakelelo yango ekoyokana tango molayi, tika ete bato nyonso baganga makasi ; bongo mir ya engumba ekokweya na pwasa, mpe moto na moto akokota na engumba, na esika oyo akozala.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 6:5
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mongongo ya kelelo ezalaki kaka komata se komata. Boye Moyize abandaki koloba na Nzambe, mpe Nzambe azalaki koyanola ye na lokito ya kake.


akobuka bamir milayi na bino ya makasi mpe akolalisa yango na se ; akokweyisa yango na mabele kino ekoma putulu.


Na mokolo ya kosambisa, tango bandako milayi ekobukana, bibale ya mayi ekotiola na bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse.


Bobetela ye lokito ya bitumba na bangambo nyonso ! Ayei komitika ye moko, mpo ete bandako na ye oyo batonga makasi ekweyi, bamir na ye ebukani : ezali na lolenge oyo nde Yawe azongiseli ye mabe na mabe. Bozongisela ye makambo oyo ye asalaki bikolo mosusu.


Mpo na kondima, bamir ya Jeriko ekweyaki tango bana Isalaele batambolaki zingazinga na yango mikolo sambo.


Na mbala oyo ya sambo, tango Banganga-Nzambe babetaki bakelelo tango molayi, Jozue apesaki mitindo epai ya bato : — Boganga makasi, pamba te Yawe akabi engumba oyo na maboko na bino !


Tango babetaki bakelelo, bato bagangaki makasi. Bongo, tango bato bagangaki makasi sima na koyoka lolaka ya kelelo kobeta tango molayi, mir ya engumba ekweyaki na pwasa. Boye, moto nyonso akotaki na engumba, liboso na ye, mpe babotolaki yango.


Kamata Banganga-Nzambe sambo ; Nganga-Nzambe moko na moko asengeli komema kelelo moko basala na liseke ya meme. Banganga-Nzambe nyonso sambo basengeli kotambola liboso ya Sanduku. Na mokolo ya sambo, bobaluka zingazinga ya engumba mbala sambo, elongo na Banganga-Nzambe oyo bakozala kobeta bakelelo.


Boye Jozue, mwana mobali ya Nuni, abengaki Banganga-Nzambe mpe alobaki na bango : — Bomema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpe tika ete Banganga-Nzambe sambo kati na bino bakamata bakelelo sambo mpe batambola liboso ya Sanduku ya Yawe.


Mibali yango babimelaki mbala moko Gibea, bapanzanaki mpe babetaki engumba mobimba na mopanga.


Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Davidi atikaki bameme na maboko ya mokengeli moko ; akamataki mikumba na ye mpe akendeki, ndenge kaka Izayi ayebisaki ye ; akomaki na molako tango mampinga ya Isalaele ezalaki komibongisa na milongo mpo na kobunda bitumba, mpe ezalaki kobeta milolo ya bitumba.


Bato ya Isalaele mpe bato ya Yuda babimaki na mbala moko, bagangaki mpe balandaki bato ya Filisitia kino na ebandeli ya lubwaku mpe kino na bikuke ya Ekroni. Bibembe ya bato ya Filisitia etandamaki na nzela oyo ekenda na Shaarayimi kino na Gati mpe kino na Ekroni.


Tango kaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe ekotaki na molako, bato nyonso ya Isalaele bagangaki na mongongo makasi, mpe mabele eninganaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ