Na se ya monoko na yango, na pembeni na yango nyonso, ezalaki na milongo mibale ya bililingi ya bangombe oyo banyangwisaki mpe babambaki na nzungu ya monene mpo ete esala eloko kaka moko ; ezalaki bililingi zomi mpo na molayi ya kati-kati ya metele moko.
Kasi botombokela Yawe te mpe bobanga te bato oyo bazali na mokili yango, pamba te tokomela bango ; kobatelama na bango elongwe kati na bango. Nzokande na ngambo na biso, Yawe azali elongo na biso. Bobanga bango te. »
Boye, Sanduku ya Yawe ezalaki kotambola zingazinga ya engumba mbala moko na mokolo ; bongo na sima, bato bazalaki kozonga na molako mpo na kolekisa butu.
Bongo apesaki mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele : — Bokende liboso ! Botambola zingazinga ya engumba, mpe tika ete basoda oyo bazalaka na liboso, na etumba, baleka liboso ya Sanduku ya Yawe.