Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 6:26 - Mokanda na Bomoi

26 Kaka na tango yango, Jozue akataki seleka oyo : « Tika ete moto oyo akoluka kotonga lisusu engumba Jeriko alakelama mabe liboso ya Yawe ! Solo, akofuta motuya ya bomoi ya mwana na ye ya liboso ya mobali, tango akotonga miboko na yango ; mpe motuya ya bomoi ya mwana na ye ya suka, tango akotia bikuke na yango. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 6:26
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango Akabi azalaki mokonzi, Iyeli, moto ya Beteli, atongaki lisusu engumba Jeriko. Tango atongaki miboko na yango, Abirami, mwana na ye ya liboso ya mobali, akufaki ; mpe tango batiaki bikuke na yango, Segubi, mwana na ye ya mobali ya suka, akufaki. Yango esalemaki kolanda liloba oyo Yawe alobaki na nzela na Jozue, mwana mobali ya Nuni.


Kasi mokonzi alobaki na ye : — Nakolapisa yo ndayi mbala boni mpo ete oloba na ngai kaka bosolo, na Kombo na Yawe ?


Eliya alobaki na Elize : — Tikala awa ; Yawe atindi ngai na Jeriko. Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! Boye bakendeki na Jeriko.


Edomi akoki koloba : « Ata babebisi mokili na biso, tokotonga yango kaka lisusu ! » Kasi tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Solo, bakotonga na bango yango, kasi Ngai nakobuka yango ! Bakobenga mokili yango : ‹ Mokili ya makambo mabe, bato oyo bazali tango nyonso na se ya kanda ya Yawe. ›


Kasi Yesu abatelaki kimia. Boye mokonzi ya Banganga-Nzambe alobaki na Ye : — Na Kombo ya Nzambe na bomoi, napesi yo mitindo : « Yebisa biso soki ozali Klisto, Mwana na Nzambe. »


Ndambo ya Bayuda oyo bazalaki kotambola-tambola mpo na kobengana milimo mabe bamekaki kobelela Kombo ya Nkolo Yesu mpo na koluka kokangola bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe ; bazalaki koloba : — Na Kombo ya Yesu oyo Polo ateyaka, napesi bino mitindo ya kobima.


Mpe lisusu ekitaki longwa na Yanoa kino na Ataroti mpe na Naarata, etutanaki na Jeriko mpe ekendeki kobima kino na Yordani.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ