Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 6:25 - Mokanda na Bomoi

25 Jozue abikisaki Raabi, mwasi ya ndumba, libota na ye mpe bato na ye nyonso, pamba te abombaki bato oyo Jozue atindaki mpo na kononga Jeriko. Boye, akomaki kovanda kati na bana ya Isalaele kino na mokolo ya lelo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 6:25
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Salima abotaki Boazi na nzela ya Raabi, mwasi na ye ; Boazi abotaki Obedi na nzela ya Rite, mwasi na ye ; Obedi abotaki Izayi,


Boye, moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo akobikisama. »


Mpo na kondima, Raabi, mwasi ya ndumba, akufaki te elongo na bato oyo bazalaki kotosa Nzambe te, pamba te ayambaki banongi na boboto.


Ezalaki mpe ndenge moko mpo na Raabi, mwasi ya ndumba : Nzambe akomisaki ye moto ya sembo mpo ete ayambaki, abombaki mpe akimisaki na nzela mosusu banongi ya Isalaele.


Wuta na Shitimi, Jozue, mwana mobali ya Nuni, atindaki na nkuku banongi mibale ; alobaki na bango : — Bokende kononga mokili, mingi-mingi Jeriko. Boye, bakendeki mpe bakotaki na ndako ya mwasi moko ya ndumba, Raabi, mpe bavandaki kuna.


soki, tango tokokota na mokili, okokangisa singa oyo ya motane na lininisa oyo okitiseli biso mpe okosangisa, kati na ndako na yo, tata mpe mama na yo, bandeko mpe bato nyonso ya libota na yo.


Kasi mwasi yango akamataki mibali wana mibale mpe abombaki bango. Alobaki : — Solo, mibali bayaki epai na ngai, kasi nayebaki te esika bango bawutaki.


Nzokande amatisaki bango likolo ya mwanza ya ndako mpe abombaki bango na se ya matiti oyo basalelaka bilamba ya lino, oyo atiaki likolo ya mwanza.


Jozue atelemisaki mabanga zomi na mibale mosusu na kati-kati ya Yordani, na esika oyo Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani bapikamaki, mpe etikala wana kino na mokolo ya lelo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ