Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 6:23 - Mokanda na Bomoi

23 Boye, bilenge mibali oyo bakendeki kononga mokili bakotaki mpe babimisaki Raabi, tata na ye, mama na ye, bandeko na ye ya mibali mpe biloko na ye nyonso. Babimisaki libota na ye mobimba na libanda mpe batiaki bango libanda ya molako ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 6:23
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakokomisa yo ekolo monene mpe nakopambola yo ; nakokomisa kombo na yo monene, mpe okozala etima ya mapamboli.


Soki bato ya sembo bazali tuku mitano kati na engumba, okoboma bango kaka ? Okolimbisa engumba yango te mpo na bato ya sembo tuku mitano oyo bazali kati na yango ?


Boye, tango Nzambe abebisaki bingumba ya etando, akanisaki Abrayami mpe abikisaki Loti na likama oyo atindelaki bingumba epai wapi Loti azalaki kovanda.


Moto nyonso kati na bino oyo abomaki moto to asimbaki ebembe, asengeli kozala libanda ya molako mikolo sambo. Boye, na mokolo ya misato mpe ya sambo, bosengeli komipetola, bino mpe bakangami na bino.


Alobaki na bango : — Boyebi malamu ete mibeko na biso epekisa Moyuda kosangana na Mopagano to kokende kotala Mopagano ; kasi Nzambe alakisi ngai ete nasengeli te komona moto moko mbindo to bosoto.


mpe alobaki : « Polo, kobanga te. Osengeli kosamba liboso ya Sezare. Mpo na yo, Nzambe abateli na bomoi bato nyonso oyo ozali kosala elongo na bango mobembo kati na masuwa. »


Boni, mosala na ngai ezali ya kosambisa bato oyo bazali na libanda ya Lingomba ? Boni, ezali bino te nde bosengeli kosambisa bato oyo bazali kati na Lingomba ?


Bobosanaka mpe te ete na tango wana, bozalaki ya kokabwana na Klisto, bozangaki makoki ya bana mboka kati na Isalaele, bozalaki bapaya liboso ya boyokani oyo Nzambe alakaki, bozalaki bato bazanga elikya mpe bazanga Nzambe kati na mokili.


Mpo na kondima, Raabi, mwasi ya ndumba, akufaki te elongo na bato oyo bazalaki kotosa Nzambe te, pamba te ayambaki banongi na boboto.


Mpo na kondima, Noa atosaki Nzambe mpe atongaki masuwa mpo na lobiko ya libota na ye, sima na ye koyoka makebisi ya Nzambe na tina na makambo oyo ezalaki nanu komonana te. Mpo na kondima, Noa amonisaki mabe ya mokili mpe akomaki mokitani ya bosembo oyo ezwamaka na nzela ya kondima.


elembo oyo ekolakisa ete bokobikisa bomoi ya tata mpe ya mama na ngai, ya bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi mpe ya bato nyonso oyo bavandaka elongo na bango, mpe lisusu ete bokobikisa biso na kufa.


Alobaki na bango : — Bokende na nzela ya bangomba ya mikuse mpo ete bato oyo bazali kolanda bino bamona bino te. Bobombama kuna mikolo misato kino tango bakozonga, bongo nde bokoki kokoba nzela na bino.


soki, tango tokokota na mokili, okokangisa singa oyo ya motane na lininisa oyo okitiseli biso mpe okosangisa, kati na ndako na yo, tata mpe mama na yo, bandeko mpe bato nyonso ya libota na yo.


Boye, alakisaki bango esika ya kokotela na kati na engumba. Mpe babomaki bato ya engumba yango na mopanga, kasi babikisaki moto wana elongo na libota na ye mobimba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ