Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 6:22 - Mokanda na Bomoi

22 Jozue alobaki na bato mibale oyo banongaki Jeriko : — Bokota na ndako ya mwasi ya ndumba, bobimisa ye libanda elongo na bato na ye nyonso, kolanda ndayi oyo bolapaki liboso na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 6:22
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi abengisaki bato ya Gabaoni mpo na kosolola na bango. Nzokande bato ya Gabaoni bazalaki kotangama te kati na bato ya Isalaele, kasi bakanganaki na batikali kati na bato ya Amori ; bongo bato ya Isalaele bakanganaki na bato ya Amori, na nzela ya ndayi, mpo na kotika bango na bomoi. Kasi Saulo, na bolingo na ye oyo eleka ndelo mpo na Isalaele mpe Yuda, alukaki kosilisa koboma bango.


Mokonzi atikaki na bomoi Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, mpo na boyokani oyo ezalaki kati na bango mibale, Davidi mpe Jonatan, mwana mobali ya Saulo, tango Davidi alapaki ndayi na Kombo na Yawe.


asanganaka te na moto oyo asalaka mabe, kasi apesaka lokumu na moto oyo atosaka Yawe ; akokisaka ndayi na ye atako ekopesa ye pasi, mpe abongolaka mokano na ye te ;


Akamataki moko kati na libota ya bokonzi, asalaki boyokani elongo na ye mpe alapisaki ye ndayi ; mpe amemaki lisusu bankumu ya mokili


Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, akokufa kati na Babiloni, kati mokili ya mokonzi oyo atiaki ye na bokonzi ; pamba te atosaki te ndayi oyo alapaki liboso na ye mpe abukaki boyokani oyo asalaki elongo na ye.


Mpo na kondima, Raabi, mwasi ya ndumba, akufaki te elongo na bato oyo bazalaki kotosa Nzambe te, pamba te ayambaki banongi na boboto.


Bobebisa mpo na Yawe engumba oyo nyonso elongo na biloko nyonso oyo ezali kati na yango. Bobikisa kaka Raabi, mwasi ya ndumba, elongo na bato na ye nyonso oyo bakozala kati na ndako na ye, pamba te abombaki banongi oyo totindaki.


Boye, bilenge mibali oyo bakendeki kononga mokili bakotaki mpe babimisaki Raabi, tata na ye, mama na ye, bandeko na ye ya mibali mpe biloko na ye nyonso. Babimisaki libota na ye mobimba na libanda mpe batiaki bango libanda ya molako ya Isalaele.


Jozue asalaki elongo na bango boyokani ya kimia ; alakaki ete akoboma bango te. Mpe bakambi ya lisanga ya Isalaele bandimaki yango na kolapa ndayi.


Boye, alakisaki bango esika ya kokotela na kati na engumba. Mpe babomaki bato ya engumba yango na mopanga, kasi babikisaki moto wana elongo na libota na ye mobimba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ