Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 6:19 - Mokanda na Bomoi

19 Kasi palata, wolo mpe biloko nyonso ya bronze elongo na bibende ekobulisama mpo na Yawe mpe esengeli kokende na ebombelo bomengo ya Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 6:19
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi Davidi abulisaki biloko yango lokola likabo epai na Yawe ndenge asalaki na palata mpe na wolo oyo ewutaki na bikolo nyonso oyo abotolaki,


Azwaki bomengo ya Tempelo ya Yawe mpe bomengo ya ndako ya mokonzi. Azwaki penza biloko nyonso, ezala banguba nyonso ya wolo oyo Salomo asalisaki.


Tango Salomo asilisaki misala nyonso ya kotonga Tempelo ya Yawe, amemaki biloko oyo Davidi, tata na ye, abulisaki : palata, wolo mpe bisalelo ; atiaki yango kati na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe.


Ndenge Yawe alobaki yango, Nabukodonozori azwaki bomengo nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na ndako ya mokonzi ; bongo amemaki biloko nyonso ya wolo oyo Salomo, mokonzi ya Isalaele, asalaki mpo na Tempelo ya Yawe.


Mokonzi Davidi abulisaki biloko yango epai na Yawe, ndenge asalaki na wolo mpe palata oyo azwaki na bikolo nyonso, na Edomi, na Moabi, na Amoni, na Filisitia mpe na Amaleki.


Balevi mosusu lokola Ayiya, bazalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya Tempelo mpe biloko ya bule.


Shelomiti elongo na bandeko na ye ya mibali bazalaki na mokumba ya kobatela biloko nyonso oyo mokonzi Davidi abulisaki mpo na Yawe ; bakambi ya mabota, bakambi ya bankoto, bakambi ya bankama mpe bakonzi mosusu ya mampinga.


Babulisaki biloko mosusu oyo bazwaki na bitumba mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe.


Shelomiti mpe bandeko na ye ya mibali bazalaki na mokumba ya kobatela biloko nyonso oyo Samuele, momoni makambo ; Saulo, mwana mobali ya Kishi ; Abineri, mwana mobali ya Neri ; Joabi oyo kombo ya mama na ye ezalaki « Tseruya, » babulisaki mpo na Yawe.


Apesaki ye elili ya nyonso oyo molimo atiaki na makanisi na ye na tina na lopango ya Tempelo ya Yawe, ya bashambre nyonso ya zingazinga, ya biloko ya talo ya Ndako ya Nzambe mpe ya biloko ya bule.


azongisaki kati na Tempelo ya Nzambe biloko oyo tata na ye mpe ye moko babulisaki : palata, wolo mpe biloko mosusu.


Bakomaki kotia kuna na boyengebene makabo ya bato, biteni ya zomi mpe makabo mosusu ya bule. Molevi Konania azalaki na mokumba ya kobatela biloko yango elongo na Shimei, ndeko na ye ya mobali, lokola molandi na ye.


Tokomema lisusu epai ya Banganga-Nzambe, na bibombelo ya Ndako ya Nzambe na biso, ndambo oyo eleki kitoko ya farine na biso, ya makabo na biso ya ble, ya mbuma ya nzete na biso nyonso, ya vino na biso ya sika mpe ya mafuta na biso. Tokomema mpe eteni ya zomi ya milona na biso epai ya Balevi, pamba te bango nde bazali na mokumba ya kokongola eteni yango ya zomi kati na bingumba nyonso epai wapi tosalelaka mosala.


Ebedi-Meleki akamataki mibali yango mpe akendeki na ndako ya mokonzi, kati na shambre oyo ezalaki na se ya ebombelo bomengo ; azwaki kuna bilamba ya kala mpe oyo epasuka, mpe akitisaki yango na nzela ya basinga epai ya Jeremi kati na libulu.


Na mobu ya minei, bokobulisa bambuma na yango nyonso ekozala bule mpo na Yawe lokola litatoli ya kozongisa matondi epai na Ye.


Oh Siona, mboka kitoko, telema mpe tuta ble, pamba te nakopesa yo maseke ya bibende mpe basapato ya bronze, bongo okobuka bikolo ebele mike-mike mpe okopesa bomengo na bango, oyo bazwaki na nzela ya mabe, lokola likabo epai na Yawe, mpe bozwi na bango epai na Mokonzi ya mokili mobimba.


Bamemaki bomengo nyonso ya bitumba mpe biloko nyonso oyo babotolaki elongo na bato, banyama ;


mpe bamemaki bakangami, biloko babotolaki mpe bomengo ya bitumba epai ya Moyize, Nganga-Nzambe Eleazari, mpe lisanga ya Isalaele na molako na bango oyo ezalaki na bitando ya Moabi, na libongo ya Yordani, pene ya Jeriko.


‹ Ezali kaka wolo, palata, bronze, motako, ete, mbodi


Bakonzi ya Banganga-Nzambe balokotaki mbongo yango mpe balobaki : — Mibeko epesi nzela te ya kotia mbongo oyo na ebombelo misolo ya Tempelo, pamba te ezali mbongo ya makila.


Yesu avandaki liboso ya kitunga ya makabo mpe azalaki kotala ndenge bato bazalaki kotia mbongo kati na kitunga ya makabo. Bazwi ebele bazalaki kotia mbongo ebele.


Isalaele asali lisumu. Babebisi boyokani na Ngai oyo natindaki bango ete babatela. Bakamati ndambo ya biloko oyo ekabami mpo na kobebisama, bayibi yango mpe babombi yango kati na biloko na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ